6 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Na mwa tango moke, nakoningisa lisusu Likolo mpe mokili, ebale monene mpe mabele ; 7 nakoningisa bato ya bikolo nyonso, bomengo ya bikolo nyonso ekoya na esika oyo, mpe nakotondisa Ndako oyo na nkembo, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. 8 ‹ Wolo mpe palata ezali ya Ngai, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. 9 ‹ Nkembo ya Ndako ya sika ekozala monene koleka nkembo ya Ndako ya kala, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, ‹ mpe nakotia kimia na esika oyo, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. »
13 Mosakoli Aje alobaki :
14 Mosakoli Aje alobaki lisusu : « Bato oyo mpe ekolo oyo bazali nde ndenge wana na miso na Ngai, » elobi Yawe, « misala nyonso oyo basalaka mpe biloko nyonso oyo babonzelaka Ngai ezalaka ya mbindo. 15 Mpe sik’oyo, kobanda lelo, botala malamu makambo oyo ekoya liboso ete libanga moko etiama na likolo ya libanga mosusu kati na Tempelo ya Yawe. 16 Tango moto moko azalaki koya mpo na kozwa bikolo tuku mibale ya ble na ebombelo, azalaki kokuta kaka bikolo zomi ; tango moto moko azalaki kokende na ekamolelo masanga ya vino mpo na kozwa bambeki tuku mitano ya vino, azalaki kaka kokuta bambeki tuku mibale. 17 Napesaki bino etumbu, tango nabebisaki misala na bino nyonso ya maboko, tango natindelaki yango bokono ya ndenge na ndenge mpe tango nanokisaki mvula ya mabanga. Kasi atako bongo, bozongaki epai na Ngai te, » elobi Yawe. 18 « Kobanda lelo, mokolo ya tuku mibale ya sanza ya libwa, botala malamu miboko ya Tempelo ya Yawe, oyo batiaki ; botala malamu penza makambo oyo ekoleka. 19 Boni, bibombelo na bino ezali lisusu na bambuma ? Kino na moyi ya lelo, ata elanga moko te ya vino, ya figi, ya grenade mpe ya olive esili kobota bambuma.
20 Yawe alobaki, na mbala ya mibale, na mosakoli Aje, na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya libwa : 21 « Loba na Zorobabeli, moyangeli ya Yuda, ete nakoningisa likolo mpe mabele, 22 nakobalola bakiti ya bokonzi, nakosilisa nguya ya bokonzi ya mikili ya bapagano, nakokweyisa bashar mpe bato oyo batambolisaka yango ; bampunda ekokweya elongo na bato oyo batambolaka likolo na yango, bango na bango bakobomana na mopanga.
23 Na mokolo wana, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « nakozwa yo Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mosali na Ngai, mpe nakokomisa yo lokola kashe na Ngai, pamba te ezali yo nde Ngai napona, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
<- Aje 1