8 Boye, Nzambe alobaki na Noa mpe na bana na ye ya mibali : 9 « Nasali sik’oyo boyokani elongo na yo mpe na bakitani na yo sima na yo, 10 na bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali elongo na yo : bandeke, bibwele mpe banyama ya zamba, banyama nyonso oyo ebimaki na masuwa elongo na yo, bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mokili. 11 Nasali boyokani elongo na yo : bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi ekobebisama te na mayi ya mpela. Mpe mpela ekozala lisusu te mpo na kobebisa mokili. »
12 Nzambe alobaki lisusu : « Tala elembo ya boyokani oyo natie kati na Ngai mpe bino, mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na bino elongo. Ezali boyokani mpo na milongo nyonso oyo ekoya : 13 natie monama na Ngai na mapata, mpe yango ekozala elembo ya boyokani kati na Ngai mpe mokili. 14 Tango nyonso nakosangisa mapata na likolo ya mokili mpe monama ekobima na mapata, 15 nakokanisa boyokani na Ngai elongo na bino mpe na bikelamu ya lolenge nyonso oyo ezali na bomoi. Mpe mayi ekokoma lisusu mpela te mpo na kobebisa nyonso oyo ezali na bomoi. 16 Tango nyonso monama ekobima na mapata, nakomona yango mpe nakokanisa boyokani ya seko kati na Nzambe mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mokili. »
17 Nzambe alobaki lisusu na Noa : « Yango nde ezali elembo ya boyokani oyo natie kati na Ngai mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali kati na mokili. »
20 Noa azalaki mosali bilanga mpe alonaki elanga ya vino. 21 Tango amelaki masanga ya vino oyo ewutaki na elanga na ye, alangwaki mpe atikalaki bolumbu kati na ndako na ye ya kapo. 22 Cham, tata ya Kanana, amonaki bolumbu ya tata na ye mpe ayebisaki bandeko na ye ya mibali oyo bazalaki na libanda. 23 Kasi Semi mpe Jafeti bazwaki elamba mpe batiaki yango na mapeka na bango. Bazongaki sima-sima mpe bazipaki bolumbu ya tata na bango. Lokola bilongi na bango etalaki na ngambo mosusu, bamonaki bolumbu ya tata na bango te.
24 Tango milangwa ya Noa esilaki, ayokaki likambo oyo mwana na ye ya suka asalaki. 25 Alobaki :
26 Alobaki lisusu :
28 Sima na mpela, Noa awumelaki na bomoi mibu nkama misato na tuku mitano. 29 Mibu nyonso ya bomoi ya Noa ezalaki nkama libwa na tuku mitano, sima akufaki.
<- Ebandeli 8Ebandeli 10 ->