4 Tango mikolo ya matanga esilaki, Jozefi alobaki na bakonzi oyo basalaka na ndako ya Faraon :
6 Faraon azongisaki :
7 Boye Jozefi akendeki kokunda tata na ye ; bakalaka nyonso ya lokumu ya Faraon bakendeki elongo na ye : bakonzi oyo bazalaki kosala na ndako na ye mpe bakonzi nyonso ya Ejipito 8 elongo na bato nyonso ya ndako ya Jozefi, bandeko na ye ya mibali mpe bato nyonso oyo bazalaki na ndako ya tata na ye. Bana na bango kaka nde batikalaki na Gosheni na bameme, bantaba mpe bangombe na bango. 9 Jozefi atambolaki lisusu elongo na bashareti mpe bato oyo batambolaka likolo ya bampunda. Ezalaki mobembo ya bato ebele penza.
10 Tango bakomaki na etando ya Atadi, pembeni ya Yordani, basalaki matanga ya monene penza. Jozefi asalaki mikolo sambo ya matanga mpo na tata na ye. 11 Bongo tango bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda kuna bamonaki matanga wana na etando ya Atadi, balobaki : « Bato ya Ejipito bazali na milulu minene ya matanga. » Yango wana babengaki esika yango Abele-Mitsirayimi, oyo ezali pembeni ya Yordani.
12 Bana mibali ya Jakobi basalaki ndenge tata na bango atindaki bango. 13 Bamemaki ye na mokili ya Kanana mpe bakundaki ye na lidusu ya mabanga oyo ezali na elanga ya Makipela, pembeni ya Mamire, elanga oyo Abrayami asombaki epai ya Efroni, moto ya Iti, mpo ete akomisa yango lilita na ye. 14 Sima na kokunda tata na ye, Jozefi azongaki na Ejipito elongo na bandeko na ye ya mibali mpe bato nyonso oyo balandaki ye mpo na kokunda tata na ye.
16 Boye batindelaki Jozefi maloba oyo : « Liboso ete tata na yo akufa, atikaki maloba oyo : ‹ Tala makambo oyo bokoyebisa Jozefi : 17 ‘ Nasengi ete olimbisa masumu ya bandeko na yo mpe mabe oyo basalaki yo ! Sik’oyo, nabondeli yo, limbisa masumu ya basali ya Nzambe ya tata na yo ! ’ › »
18 Bandeko na ye bayaki, bamibwakaki liboso na ye mpe balobaki :
19 Kasi Jozefi alobaki na bango :
25 Jozefi alapisaki bana mibali ya Isalaele ndayi mpe alobaki na bango : « Tango Nzambe akosunga bino, bokolongola mikuwa na ngai na esika oyo. »
26 Bongo Jozefi akufaki tango akokisaki mibu ya mbotama nkama moko na zomi. Tango basilisaki kokawusa nzoto na ye, batiaki ye na sanduku na Ejipito.
<- Ebandeli 49