3 Isalaele azalaki kolinga Jozefi mingi koleka bana na ye nyonso, pamba te abotaki ye na kimobange. Asalelaki ye elamba ya kitoko mpe ya talo. 4 Tango bandeko na ye ya mibali bamonaki ete tata na bango azali kolinga ye koleka bango nyonso, bayinaki ye mpe bakokaki lisusu te koloba na ye na motema malamu.
5 Jozefi alotaki ndoto mpe tango ayebisaki yango epai ya bandeko na ye ya mibali, bayinaki ye lisusu makasi. 6 Alobaki na bango :
8 Bandeko na ye ya mibali balobaki na ye :
9 Alotaki lisusu ndoto mosusu mpe ayebisaki yango epai ya bandeko na ye ya mibali. Alobaki :
10 Tango ayebisaki tata na ye ndenge ayebisaki bandeko na ye ya mibali, tata na ye agangelaki ye mpe alobaki :
11 Bandeko na ye ya mibali bakomaki na motema likunya epai na ye, kasi tata na ye abombaki kaka likambo yango na motema.
14 Tata na ye alobaki na ye :
16 Jozefi azongisaki :
17 Moto yango azongisaki :
19 Balobanaki bango na bango :
21 Tango Ribeni ayokaki bongo, alukaki nzela ya kokangola ye na maboko na bango. Alobaki :
23 Tango kaka Jozefi akomaki epai ya bandeko na ye ya mibali, balongolaki ye elamba na ye ya kitoko mpe ya talo oyo alataki. 24 Bakangaki ye mpe babwakaki ye na libulu. Libulu yango ezalaki na eloko te, ezalaki mpe na mayi te na kati. 25 Wana bavandaki mpo na kolia, batombolaki miso mpe bamonaki bato ya libota ya Isimaeli elongo na bashamo na bango koya wuta na Galadi. Bashamo na bango ezalaki komema na Ejipito : biloko ya mike-mike ya solo kitoko oyo balambelaka, mafuta ya solo kitoko mpe mire.
26 Boye Yuda alobaki na bandeko na ye ya mibali : « Litomba nini tokozwa soki tobomi ndeko na biso mpe tozipi makila na ye ? 27 Malamu toteka ye epai ya bato ya ekolo ya Isimaeli, kasi toboma ye te ; pamba te azali kaka ndeko na biso mpe tozali na ye makila moko. » Boye bandeko na ye bandimaki.
28 Nzokande tango bato ya mombongo ya mokili ya Madiani balekaki wana, babimisaki Jozefi wuta na libulu mpe batekaki ye epai ya bato ya ekolo ya Isimaeli, na motuya ya mbongo ya bibende, tuku mibale ; mpe bango bamemaki ye na Ejipito.
29 Tango Ribeni azongaki na libulu mpe amonaki ete Jozefi azali lisusu kuna te, apasolaki bilamba na ye, 30 azongaki epai ya bandeko na ye mpe alobaki : « Elenge mobali azali lisusu kuna te ! Sik’oyo ngai, nakosuka wapi ? »
31 Boye babomaki ntaba, bazwaki elamba ya Jozefi mpe bazindisaki yango na makila ya ntaba. 32 Sima, bazongisaki elamba yango ya kitoko mpe ya talo epai ya tata na bango. Balobaki :
33 Jakobi asosolaki ete ezali elamba ya Jozefi mpe agangaki :
34 Jakobi apasolaki bilamba na ye, alataki saki mpe asalaki matanga mpo na mwana na ye mikolo ebele. 35 Bana na ye nyonso ya mibali mpe ya basi bayaki kobondisa ye ; kasi aboyaki kobondisama. Alobaki : « Te ; nakozala na matanga kino nakolanda mwana na ngai na mboka ya bakufi epai wapi mwana na ngai azali. » Boye, tata na ye alelaki ye.
36 Bato ya mokili ya Madiani batekaki Jozefi na Ejipito epai ya Potifari, kalaka ya lokumu ya Faraon mpe mokonzi ya bakengeli ya mokonzi.
<- Ebandeli 36Ebandeli 38 ->