2 Jakobi alobaki na bato ya libota na ye mpe na bato nyonso oyo bazalaki na ye elongo : « Bolongola banzambe ya bapaya oyo ezali kati na bino, bomipetola mpe bolata bilamba mosusu. 3 Tokomata na Beteli epai wapi nakotonga etumbelo mpo na Nzambe oyo ayanolaki ngai na mokolo oyo nazalaki na pasi mpe azalaki elongo na ngai bisika nyonso oyo nazalaki kokende. »
4 Bapesaki Jakobi banzambe nyonso ya bapaya, oyo bazalaki na yango mpe biloko na bango ya matoyi. Boye Jakobi akundaki yango na se ya nzete ya terebente oyo ezalaki pene ya Sishemi. 5 Sima, bakendeki. Kanda na Nzambe ekweyelaki bingumba nyonso ya zingazinga na bango, mpe moko te alandaki bana mibali ya Jakobi.
6 Jakobi mpe bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bakomaki na Luze, oyo ezali Beteli, kati na mokili ya Kanana. 7 Kuna nde atongaki etumbelo mpe abengaki esika yango « Eli Beteli[a], » pamba te ezalaki kuna nde Nzambe amimonisaki epai na ye tango azalaki kokima ndeko na ye. 8 Ezalaki wana nde Debora, mama mobokoli ya Rebeka, akufaki. Bakundaki ye pembeni ya Beteli, na se ya nzete oyo, wuta na tango wana, bakomaki kobenga « Aloni-Bakuti[b]. »
9 Nzambe abimelaki lisusu Jakobi tango azongaki wuta na Padani-Arami mpe apambolaki ye. 10 Nzambe alobaki na ye : « Kombo na yo ezali Jakobi ; kasi okobengama lisusu Jakobi te, kombo na yo ekomi Isalaele. » Yango wana Nzambe apesaki ye kombo « Isalaele. »
11 Nzambe alobaki na ye lisusu : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Bota bana mpe bokoma ebele ; bokoma ekolo moko mpe bikolo ebele ekobima na nzela na yo, bakonzi bakobima kati na yo. 12 Mokili oyo napesaki na Abrayami mpe na Izaki, napesi yango mpe na yo. Nakopesa yango lisusu na bakitani na yo. »
13 Sima, Nzambe atikaki ye na esika oyo asololaki na ye. 14 Jakobi atelemisaki libanga ya elembo na esika oyo Nzambe asololaki na ye ; asopaki likolo ya libanga yango likabo ya masanga mpe mafuta. 15 Jakobi apesaki esika oyo Nzambe asololaki na ye kombo « Beteli. »
18 Lokola azalaki kobundana mpo na kokufa, liboso ya kokata motema, apesaki mwana na ye ya mobali kombo Beni-Oni[d]. Kasi tata na ye apesaki ye kombo Benjame[e]. 19 Rasheli akufaki mpe bakundaki ye na nzela ya Efrata, elingi koloba Beteleemi. 20 Jakobi atelemisaki libanga ya elembo likolo ya kunda ya Rasheli ; mpe kino lelo oyo, libanga wana ya elembo elakisaka kunda ya Rasheli.
21 Sima, Isalaele alongwaki mpe akendeki kotonga ndako na ye ya kapo mosika ya Migidali-Ederi. 22 Wana Isalaele azalaki kowumela na mokili wana, Ribeni ayaki kuna mpe asangisaki nzoto na Bila, makangu ya tata na ye ; mpe Isalaele ayokaki yango.