5 Tango Jakobi ayokaki ete lokumu ya Dina, mwana na ye ya mwasi, ebebisami, abatelaki kimia kino bana na ye ya mibali bazongaki na ndako, pamba te bazalaki na esobe elongo na bibwele.
6 Boye, Amori, tata na Sishemi, akendeki kosolola na Jakobi. 7 Tango bana mibali ya Jakobi bazongaki wuta na esobe, bayokaki sango ya makambo oyo esalemaki. Bongo, bayokaki pasi mingi na mitema mpe basilikaki makasi, pamba te Sishemi asalaki likambo ya soni na Isalaele, wana asangisaki nzoto na makasi na mwana mwasi ya Jakobi. Likambo ya bongo esengelaki kosalema te.
8 Kasi Amori alobaki na bango : « Motema ya Sishemi, mwana na ngai ya mobali ezali kopela na bolingo mpo na mwana na bino ya mwasi. Nabondeli bino, bopesa ye na libala mpo na Sishemi. 9 Na bongo, bokoki kosala elongo na biso boyokani na nzela ya libala : bokobalisa biso bana na bino ya basi mpe biso tokobalisa bino bana na biso ya basi, 10 bokovanda elongo na biso. Mboka ezali liboso na bino, bovanda, bosala mombongo mpe bokoma bankolo mabele. »
11 Boye, Sishemi alobaki na tata mpe na bandeko mibali ya Dina :
13 Lokola lokumu ya Dina, ndeko mwasi na bango, ebebaki, bana mibali ya Jakobi basalelaki mayele mabe mpo na kopesa eyano epai ya Sishemi mpe tata na ye Amori. 14 Balobaki na bango :
18 Likanisi na bango emonanaki malamu epai ya Amori mpe Sishemi, mwana na ye ya mobali. 19 Lokola elenge mobali, oyo azalaki na lokumu koleka bato nyonso ya ndako ya tata na ye, alingaki mwana mwasi ya Jakobi, akokisaki na lombangu likambo oyo bayebisaki ye. 20 Boye, Amori mpe Sishemi, mwana na ye ya mobali, bakendeki na ekuke ya engumba na bango mpo na koloba na bana mboka na bango : 21 « Bato oyo bazali na boboto epai na biso ; tika ete bavanda elongo na biso mpe basala mombongo, mpo ete mboka ezali na yango monene ! Tokoki na biso kobala bana na bango ya basi, mpe bango bakoki na bango kobala bana na biso ya basi. 22 Kasi mibali bakondima kovanda elongo na biso lokola bandeko ya libota moko soki kaka mibali nyonso kati na biso bakatisi ngenga lokola bango. 23 Bibwele na bango, bomengo na bango, banyama na bango nyonso ; boni ekokoma ya biso te soki kaka tondimi ete bavanda elongo na biso ? »
24 Boye, bato nyonso oyo bazalaki kobima na ekuke ya engumba bandimaki Amori mpe mwana na ye ya mobali, Sishemi ; mpe mibali nyonso bakatisaki ngenga.
25 Sima na mikolo misato, wana mibali nyonso kati na bango bazalaki nanu na pasi ya bapota, bana mibali mibale ya Jakobi, bandeko mibali ya Dina, Simeoni mpe Levi, bakamataki mipanga na bango, bakotaki na pwasa kati na engumba mpe babomaki mibali nyonso. 26 Babomaki na mopanga Amori mpe mwana na ye ya mobali Sishemi. Bakamataki Dina wuta na ndako ya Sishemi mpe bazongaki na ye. 27 Bana mibali mosusu ya Jakobi bayaki kosasa mibali oyo bazalaki na bapota mpe kobebisa engumba mpo ete babebisaki lokumu ya ndeko na bango ya mwasi. 28 Babotolaki bangombe na bango, bameme mpe bantaba na bango, ba-ane na bango, biloko nyonso oyo ezalaki kati na engumba mpe na bilanga. 29 Bakamataki bomengo na bango nyonso : bana, basi mpe biloko nyonso oyo ezalaki kati na bandako na bango.
30 Boye, Jakobi alobaki na Simeoni mpe na Levi :
31 Bango bazongisaki :