1 Tango Rasheli amonaki ete azali kobotela Jakobi bana te, akomaki na zuwa mpo na ndeko na ye ya mwasi. Boye alobaki na Jakobi :
2 Jakobi asilikaki makasi mpo na Rasheli mpe alobaki :
3 Rasheli alobaki :
4 Rasheli apesaki ye Bila, mwasi mosali na ye, mpo ete akoma mwasi na ye. Jakobi asangisaki na ye nzoto, 5 mpe Bila akomaki na zemi. Abotelaki Jakobi mwana mobali. 6 Rasheli alobaki : « Nzambe alongisi ngai, ayoki kolela na ngai mpe apesi ngai mwana mobali. » Boye apesaki ye kombo « Dani. » 7 Sima na yango, Bila, mwasi mosali ya Rasheli, azwaki lisusu zemi mpe abotelaki Jakobi mwana mobali ya mibale. 8 Rasheli alobaki : « Nabundisi ndeko na ngai ya mwasi bitumba ya Nzambe mpe nalongi. » Boye apesaki ye kombo « Nefitali. »
9 Tango Lea amonaki ete azali kobota lisusu te, azwaki Zilipa, mwasi mosali na ye, mpe apesaki ye epai ya Jakobi mpo ete akoma mwasi na ye. 10 Zilipa, mwasi mosali ya Lea, abotelaki Jakobi mwana mobali. 11 Lea alobaki : « Oyo nde esengo ! » Boye apesaki ye kombo « Gadi. » 12 Sima na yango, Zilipa, mwasi mosali ya Lea, abotelaki Jakobi mwana mobali ya mibale. 13 Lea alobaki : « Oyo esengo ya ndenge nini nakomi na yango ! Pamba te basi bakobenga ngai moto ya esengo. » Boye apesaki ye kombo « Aseri. »
14 Na eleko ya kokata ble, Ribeni akendeki na bilanga mpe amonaki bambuma ya mandragore[a] ; amemelaki yango Lea, mama na ye. Bongo Rasheli alobaki na Lea :
15 Kasi Lea azongiselaki ye :
16 Na pokwa, wana Jakobi awutaki bilanga, Lea akendeki kokutana na ye mpe alobaki na ye : « Okolala epai na ngai, pamba te napesi bambuma ya mandragore ya mwana na ngai mpo na yo. » Boye Jakobi asangisaki na ye nzoto na butu wana.
17 Nzambe ayokelaki Lea mawa, akomaki na zemi mpe abotelaki Jakobi mwana mobali ya mitano. 18 Lea alobaki : « Nzambe apesi ngai lifuti na ngai lokola napesaki mosali na ngai ya mwasi epai ya mobali na ngai. » Boye apesaki ye kombo « Isakari. » 19 Lea azwaki lisusu zemi mpe abotelaki Jakobi mwana mobali ya motoba.
20 Lea alobaki : « Nzambe apesi ngai likabo ya motuya. Sik’oyo, mobali na ngai akopesa ngai lokumu mpo ete naboteli ye bana mibali motoba. » Boye apesaki ye kombo « Zabuloni. »
21 Sima na mikolo, abotaki lisusu mwana mwasi mpe apesaki ye kombo « Dina. »
22 Nzambe akaniselaki Rasheli, ayokaki kolela na ye mpe afungolaki ye mabota. 23 Akomaki na zemi, abotaki mwana mobali mpe alobaki : « Nzambe alongoli soni na ngai. » 24 Apesaki ye kombo « Jozefi, » mpe alobaki : « Tika ete Yawe abakisela ngai mwana mosusu ya mobali ! »
27 Kasi Labani alobaki na ye :
29 Jakobi alobaki na ye :
31 Labani atunaki ye :
34 Labani alobaki :
35 Kaka na mokolo wana, Labani alongolaki kati na bibwele, bantaba ya mibali ya madodo-madodo mpe ya banzela-nzela ya pembe, bantaba nyonso ya basi ya madodo-madodo mpe ya banzela-nzela ya pembe, mpe bibwele nyonso oyo ezalaki mwa pembe mpe mwa mwindo kati na bana meme. Apesaki yango na maboko ya bana na ye ya mibali. 36 Sima, Labani atambolaki mikolo misato mpo na kokabwana na Jakobi, wana Jakobi akobaki kobatela ndambo ya bibwele ya Labani oyo etikalaki.
37 Jakobi azwaki bitape ya mobesu ya nzete ya pepiliye, ya amande mpe ya platane. 38 Bongo atiaki kati na basani mpe kati na bimelelo, liboso ya bibwele, bitape oyo apalolaki, na esika oyo bibwele ezalaki koya komela mayi. Wana bibwele ya basi ezalaki koyoka posa ya mayi, ezalaki mpe koyoka posa ya kosangisa nzoto na bibwele ya mibali. 39 Boye, bibwele ezalaki koya kosangisa nzoto liboso ya bitape wana ; mpe tango ezalaki kobota, bana na yango ezalaki na banzela-nzela ya pembe, banzela-nzela ya mwindo mpe madodo-madodo. 40 Jakobi atiaki pembeni bana meme mpe atindaki yango na esika oyo bana meme ya nzela-nzela mpe ya mwa mwindo ezalaki ; pamba te yango ezalaki kobotama mingi kati na bibwele ya Labani. Ezali boye nde akomaki na bibwele ya ye moko oyo asangisaki te na bibwele ya Labani. 41 Tango nyonso bibwele ya basi, oyo ezalaki na nzoto minene, ezalaki na posa ya kosangisa nzoto, Jakobi azalaki kotia liboso ya bibwele yango bitape ya nzete kati na basani oyo yango ezalaki komelela mayi mpo ete esangisa nzoto pembeni ya bitape wana. 42 Kasi, na esika yango, azalaki kotia te bibwele oyo ekonda. Boye bibwele oyo ekonda ezalaki ya Labani, mpe oyo ya minene ezalaki ya Jakobi. 43 Na nzela wana nde moto oyo akomaki na bozwi mingi koleka. Azwaki bibwele ebele, basali ya basi mpe ya mibali, bashamo mpe ba-ane.
<- Ebandeli 29Ebandeli 31 ->- a Mandragore ezali nzete oyo ebotaka bambuma ya bolingo.