5 Atunaki bango lisusu :
6 Jakobi abakisaki lisusu :
7 Kasi Jakobi alobaki :
8 Bazongisaki :
9 Wana azalaki nanu kosolola na bango, Rasheli ayaki elongo na bameme ya tata na ye, pamba te azalaki mwasi mobateli bibwele. 10 Tango Jakobi amonaki Rasheli, mwana mwasi ya noko na ye Labani, elongo na bibwele ya Labani, apusanaki, alongolaki libanga na monoko ya libulu ya mayi mpe amelisaki yango mayi. 11 Jakobi apesaki Rasheli beze mpe alelaki makasi. 12 Jakobi ayebisaki Rasheli : « Nazali mwana ya Rebeka mpe moto ya libota ya tata na yo. » Bongo Rasheli akimaki mbangu mpo na koyebisa tata na ye. 13 Tango kaka Labani ayokaki sango na tina na Jakobi, mwana ya ndeko na ye ya mwasi, akendeki mbangu kokutana na ye. Ayambaki ye, apesaki ye beze mpe amemaki ye na ndako na ye ; mpe kuna, Jakobi ayebisaki ye makambo nyonso oyo elekaki. 14 Labani alobaki na ye : « Solo, ozali penza makila na ngai, moto ya libota na ngai penza ! » Jakobi avandaki elongo na ye sanza mobimba.
16 Nzokande, Labani azalaki na bana basi mibale ya mikolo : Lea mpe leki na ye Rasheli. 17 Lea azalaki na miso elala kasi Rasheli azalaki na nzoto kitoko mpe elongi kitoko. 18 Jakobi alingaki Rasheli mpe alobaki :
19 Labani alobaki :
20 Jakobi asalaki mibu sambo mpo na kozwa Rasheli na libala, mpe mibu yango emonanaki kaka lokola mwa mikolo epai na ye, pamba te alingaki Rasheli.
21 Sima, Jakobi alobaki na Labani :
22 Na boye, Labani abengisaki bato nyonso ya esika wana mpe asalisaki feti. 23 Tango pokwa ekomaki, Labani azwaki Lea, mwana na ye ya mwasi, apesaki ye epai ya Jakobi mpe Jakobi asangisaki na ye nzoto. 24 Labani apesaki Zilipa, mwasi mosali na ye, epai ya Lea, mwana na ye ya mwasi, lokola mwasi mosali na ye. 25 Tango tongo etanaki, Jakobi amonaki ete ezalaki nde Lea. Bongo alobaki na Labani :
26 Labani azongisaki :
28 Jakobi asalaki bongo : asilisaki poso wana elongo na Lea, sima Labani apesaki ye mwana na ye ya mwasi Rasheli mpo ete azala mwasi na ye. 29 Labani apesaki Bila, mwasi mosali na ye, epai ya Rasheli, mwana na ye ya mwasi, lokola mwasi mosali na ye. 30 Jakobi asangisaki lisusu nzoto na Rasheli. Alingaki ye mingi koleka Lea. Bongo asalelaki lisusu Labani mibu sambo.
33 Sima, azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Alobaki : « Yawe amoni ete nalingami te, mpe apesi ngai lisusu mwana. » Boye apesaki ye kombo « Simeoni. » 34 Azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Alobaki : « Na mbala oyo, mobali na ngai akokangama na ngai, pamba te naboteli ye bana mibali misato. » Boye bapesaki ye kombo « Levi. » 35 Azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Agangaki : « Na mbala oyo, nakokumisa Yawe. » Yango wana apesaki ye kombo « Yuda. » Mpe akataki kobota.
<- Ebandeli 28Ebandeli 30 ->