1 Ezalaki bongo nde likolo mpe mokili ekelamaki elongo na biloko nyonso oyo ezali kati na yango.
7 Yawe Nzambe asalaki moto wuta na putulu ya mabele, afulaki pema ya bomoi na madusu ya zolo na ye ; mpe moto akomaki ekelamu ya bomoi. 8 Yawe Nzambe alonaki elanga moko kati na Edeni, na ngambo ya este. Atiaki moto oyo akelaki kati na yango. 9 Yawe Nzambe abimisaki wuta na mabele banzete ya lolenge nyonso oyo ezalaki kitoko mpo na kotala mpe elengi mpo na kolia. Atiaki mpe nzete ya bomoi na kati-kati ya elanga ; lisusu atiaki nzete ya koyeba malamu mpe mabe.
10 Ebale moko ezalaki kobima na Edeni mpe ezalaki kosopa mayi na elanga. Mayi ya ebale yango ekabwanaki na biteni minei. 11 Eteni ya liboso, kombo na yango « Pishoni. » Yango ezingeli mokili mobimba ya Avila oyo mabele na yango ezalaki na wolo. 12 Wolo ya mokili yango ezalaki kitoko. Ezalaki lisusu na molona ya malasi mpe na mabanga ya onikisi kati na mokili yango. 13 Eteni ya mibale, kombo na yango « Giyoni. » Yango ezingeli mokili mobimba ya Kushi. 14 Eteni ya misato, kombo na yango « Tigre. » Yango elekana na este ya Asiri. Mpe eteni ya minei, kombo na yango « Efrate. »
15 Yawe Nzambe azwaki moto mpe atiaki ye kati na elanga ya Edeni mpo na kolona yango mpe kobatela yango. 16 Mpe Yawe Nzambe apesaki mitindo oyo na moto : « Okoki kolia mbuma nyonso ya elanga, 17 kasi okolia te mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe ; pamba te mokolo oyo okolia yango, okokufa solo. »
18 Yawe Nzambe alobaki : « Ezali malamu te ete mobali azala ye moko ; nakosalela ye mosungi oyo azali ndenge moko na ye. »
19 Yawe Nzambe asalaki, wuta na mabele, banyama nyonso ya zamba mpe bandeke nyonso ya likolo. Amemaki yango epai ya mobali mpo na kotala ndenge akopesa yango kombo, mpo ete ekelamu nyonso ya bomoi ebengama na kombo oyo mobali akopesa yango. 20 Yango wana, mobali apesaki bakombo na bibwele nyonso, na bandeke nyonso ya likolo mpe na banyama nyonso ya zamba. Kasi amonaki te mosungi oyo akokaki kozala ndenge moko na ye. 21 Na yango, Yawe Nzambe alalisaki mobali pongi ya makasi. Mpe wana mobali azalaki kolala, Yawe Nzambe azwaki mokuwa moko na mopanzi ya mobali mpe azipaki mosuni na esika yango. 22 Yawe Nzambe asalaki mwasi na mokuwa oyo azwaki na mopanzi ya mobali mpe amemaki ye epai ya mobali.
23 Boye, mobali alobaki :
25 Mobali mpe mwasi na ye bazalaki bolumbu mpe bazalaki koyokana soni te.
<- Ebandeli 1Ebandeli 3 ->