— Memela Ngai mwana ngombe moko ya mwasi ya mibu misato, ntaba ya mwasi ya mibu misato, meme ya mobali ya mibu misato, ebenga moko ya zamba mpe ebenga moko ya mboka.
10 Abrami amemelaki Ye banyama oyo nyonso, akataki yango na biteni mibale mpe atiaki yango etalana eteni moko na eteni mosusu ; kasi akataki bandeke te.
12 Tango moyi ekitaki, Abrami alalaki pongi makasi. Na kati ya molili makasi, somo ekangaki ye. 13 Boye, Yawe alobaki na Abrami :
— Yeba solo ete bakitani na yo bakozala bapaya kati na mokili ya bapaya epai wapi bakozala bawumbu ; mpe bakonyokola bango kuna mibu nkama minei. 14 Kasi nakopesa etumbu na ekolo oyo ekokomisa bango bawumbu ; mpe na sima, bakobima longwa na mokili yango elongo na bozwi ebele. 15 Bongo yo, okokufa na kimia mpe okokundama sima na kimobange ya esengo. 16 Na molongo ya minei, bakitani na yo bakozonga awa, pamba te masumu ya bato ya Amori ekomi nanu ebele te.
17 Tango moyi elalaki mpe molili eyaki makasi, mbabola ya milinga mpe koni ya moto elekaki kati ya biteni ya banyama. 18 Na mokolo yango, Yawe asalaki boyokani elongo na Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo na bakitani na yo wuta na moluka ya Ejipito kino na ebale Efrate : 19 mokili ya bato ya Keni, ya bato ya Kenizi, ya bato ya Kadimoni, 20 ya bato ya Iti, ya bato ya Perizi, ya bato ya Refayimi, 21 ya bato ya Amori, ya bato ya Kanana, ya bato ya Girigazi mpe ya bato ya Yebusi. »