4 Abrami akendeki ndenge Yawe alobaki na ye ; mpe Loti akendeki na ye elongo. Abrami azalaki na mibu tuku sambo na mitano tango abimaki na engumba Arani. 5 Abrami azwaki mwasi na ye Sarayi ; Loti, mwana ya ndeko na ye ; bomengo nyonso oyo akomaki na yango mpe bato oyo azwaki na Arani. Babimaki wuta na Arani mpo na kokende na Kanana mpe bakomaki kuna.
6 Abrami atambolaki kati na mokili yango kino na esika oyo babengaka Sishemi, na nzete monene ya More. Na tango wana, bato ya Kanana bazalaki kovanda na mokili yango. 7 Yawe amimonisaki epai ya Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo epai ya bakitani na yo. » Boye Abrami atongaki na esika yango etumbelo mpo na Yawe oyo amimonisaki epai na ye.
8 Longwa wana, akendeki na bangomba ya este ya Beteli. Atongaki ndako na ye ya kapo kati ya Beteli mpe Ayi, na esika oyo atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abelelaki Kombo ya Yawe. Beteli ezalaki na ngambo ya weste mpe Ayi, na ngambo ya este.
9 Sima, Abrami alongwaki wana mpe akendeki malembe-malembe kino na Negevi.
14 Tango Abrami akomaki na Ejipito, bato ya Ejipito bamonaki ete Sarayi azalaki mwasi kitoko penza. 15 Wana bakonzi ya basali ya Faraon bamonaki ye, bakumisaki ye liboso ya Faraon mpe bamemaki ye na ndako ya Faraon mpo ete akoma mwasi na ye. 16 Basalelaki Abrami bolamu likolo ya Sarayi, mpe Abrami azwaki bameme, bantaba mpe bangombe, ba-ane, basali ya basi mpe ya mibali, bana ya ba-ane mpe bashamo.
17 Kasi Yawe apesaki etumbu makasi epai ya Faraon mpe ndako na ye mpo na Sarayi, mwasi ya Abrami. 18 Boye, Faraon abengisaki Abrami mpe alobaki na ye : « Likambo nini osali ngai ? Mpo na nini oyebisaki ngai te ete azali mwasi na yo ? 19 Mpo na nini olobaki : ‹ Azali ndeko na ngai ya mwasi ? › Mpo na yango, nakomisaki ye mwasi na ngai. Sik’oyo tala mwasi na yo, kamata ye mpe kende ! »
20 Boye, Faraon apesaki mitindo epai ya bato na ye na tina na Abrami ete babengana ye elongo na mwasi na ye mpe biloko nyonso oyo azalaki na yango.
<- Ebandeli 11Ebandeli 13 ->