1 Tala ndimbola ya makambo oyo nazali koloba : soki mokitani ya libula azali nanu mwana moke, akeseni te na mowumbu, atako ye nde azali nkolo ya biloko nyonso. 2 Akozala na se ya bokonzi ya babokoli mpe ya babateli bomengo kino tango akokokisa mibu oyo tata na ye akataki. 3 Ezali mpe ndenge moko mpo na biso : wana tozalaki nanu bana mike, tozalaki bawumbu ya makambo oyo etambolisaka mokili. 4 Kasi tango ngonga oyo Nzambe akataki ekokaki, atindaki Mwana na Ye, oyo abotamaki na mwasi mpe na se ya bokonzi ya Mobeko, 5 mpo na kosikola bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpe mpo na kopesa biso makoki ya kokoma bana na Nzambe. 6 Mpe mpo ete bozali penza bana, Nzambe atindaki Molimo ya Mwana na Ye kati na mitema na biso, Molimo oyo agangaka : « Aba, » elingi koloba : « Tata ! »
7 Boye, ozali lisusu mowumbu te, kasi mwana. Mpe mpo ete ozali mwana, Nzambe okomisi yo mokitani ya libula na Ye.
12 Nabondeli bino bandeko na ngai : Bozala lokola ngai, pamba te ngai mpe namikomisaki lokola bino. Bosalaki ngai mabe moko te. 13 Boyebi malamu ete ezali bokono na ngai nde epesaki ngai libaku ya koteya bino Sango Malamu mpo na mbala ya liboso. 14 Atako bongo, botiolaki ngai te mpe boboyaki ngai te mpo na bokono na ngai ; nzokande, boyambaki ngai lokola Anjelu na Nzambe, lokola Yesu-Klisto Ye moko. 15 Esengo na bino ekeyi wapi ? Nakoki ata kopesa litatoli oyo na tina na bino : Soki ekokaki kosalema, bolingaki ata kolongola miso na bino mpo na kopesa ngai yango. 16 Boni, nakomi sik’oyo monguna na bino mpo ete nazali koloba na bino solo ?
17 Bato wana balingi bino makasi, kasi makanisi na bango ezali ya malamu te ; bazali na posa ya kokabola bino na ngai mpo ete bokangama na bango. 18 Ezali malamu kozalaka tango nyonso na bolingo eleka ndelo mpo na likambo ya malamu, kasi ezala kaka te tango nazali elongo na bino. 19 Bana na ngai, lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota, nazali lisusu koyoka pasi mpo na bino, kino tango Klisto akosalema kati na bino. 20 Nazali na posa makasi ya kozala sik’oyo elongo na bino mpe koloba na bino na lolenge mosusu, pamba te nayebi lisusu te eloko ya kosala mpo na bino !
24 Makambo oyo epesami lokola ndakisa : Basi oyo mibale bazali kotalisa boyokani mibale. Moko ewutaki na ngomba Sinai mpe ebotaki bawumbu ; yango nde Agari azali kotalisa. 25 Agari azali ngomba Sinai kati na Arabi, akokani na Yelusalemi ya sik’oyo, pamba te ezali kati na bowumbu elongo na bana na yango. 26 Kasi Yelusalemi ya Likolo ezali nsomi, mpe yango nde ezali mama na biso ; 27 pamba te ekomama :
28 Nzokande bino bandeko na ngai, bozali bana ya elaka, lokola Izaki. 29 Kasi ndenge kaka mwana mobali oyo abotamaki na lolenge ya bomoto azalaki na kala konyokola mwana mobali oyo abotamaki na nzela ya nguya ya Molimo, ndenge wana mpe ezali kosalema sik’oyo. 30 Nzokande Makomi ezali koloba nini ? « Bengana mwasi mowumbu elongo na mwana na ye ya mobali, pamba te mwana ya mwasi mowumbu akoki te kokabola libula elongo na mwana mobali ya mwasi nsomi. » 31 Yango wana bandeko na ngai, biso tozali bana ya mwasi mowumbu te, kasi bana ya mwasi nsomi.
<- Bagalatia 3Bagalatia 5 ->