8 Makomi esilaki kobongisa ete Nzambe akokomisa Bapagano sembo na nzela ya kondima, mpe etatolaki Sango Malamu oyo epai ya Abrayami : « Bato ya bikolo nyonso bakopambolama mpo na yo. » 9 Boye, bato oyo bazali na kondima bazali ya kopambolama elongo na Abrayami, moto na kondima.
10 Pamba te bato nyonso oyo batiaka elikya na botosi na bango liboso ya Mobeko bazali na se ya elakeli mabe, kolanda ndenge ekomama : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akobaka te kotosa makambo nyonso oyo ekomama kati na buku ya Mobeko. »
11 Solo, moto moko te akoki kokoma sembo na miso ya Nzambe na nzela ya Mobeko, pamba te moto ya sembo akobika na nzela ya kondima.
12 Nzokande, Mobeko ewuti na kondima te, pamba te ekomama : « Moto oyo akosalela yango akobika bomoi na ye na nzela na yango. »
13 Klisto akangolaki biso na bilakeli mabe ya Mobeko, pamba te akomaki elakeli mabe na esika na biso. Ekomama : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo badiembiki na nzete. » 14 Asalaki bongo mpo ete, kati na Klisto Yesu, Bapagano bazwa mapamboli ya Abrayami, mpe mpo ete biso tozwa, na nzela ya kondima, Molimo oyo Nzambe alakaki.
19 Bongo mpo na nini Mobeko ? Mobeko ebakisamaki mpo na kobimisa polele bozangi botosi ya bato, kino na boyei ya Mokitani epai ya nani Nzambe apesaki elaka. Mobeko yango epesamaki na nzela ya ba-anjelu, mpe mokumba na yango epesamaki na maboko ya moyokanisi. 20 Nzokande soki ezalaki na moyokanisi, elingi koloba ete ezalaki mpe na masanga ebele ya koyokanisa. Kasi mpo na oyo etali elaka, Nzambe azali kaka Ye moko.
21 Boni, Mobeko eyaki mpo na kotelemela bilaka ya Nzambe ? Ata moke te ! Soki mobeko moko epesamaki, mobeko oyo ezali na makoki ya kopesa bato bomoi, bato balingaki penza kokoma sembo na nzela ya mobeko yango. 22 Kasi tala makambo oyo Makomi eloba : Mokili mobimba ezali na se ya bokonzi ya lisumu mpo ete elaka ya Nzambe ekokisama epai ya bandimi na nzela ya kondima na bango kati na Yesu-Klisto.
26 Boye bino nyonso bozali bana na Nzambe na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto ; 27 pamba te bino nyonso oyo bozwaki libatisi kati na Klisto bolataki nde Klisto. 28 Bokeseni ezali lisusu te kati na Bayuda mpe Bagreki, kati na bawumbu mpe bansomi, kati na mibali mpe basi ; pamba te bino nyonso bozali se moto moko kati na Yesu-Klisto. 29 Mpe soki bozali ya Klisto, bozali mpe bokitani ya Abrayami, bakitani ya libula kolanda elaka oyo Nzambe apesaki na Abrayami.
<- Bagalatia 2Bagalatia 4 ->