Bagalatia
10 Bozali sik’oyo kokanisa nini na likambo oyo : nazali koluka kosepelisa bato to nazali koluka kosepelisa Nzambe ? Boni, nazali koluka kosepelisa bato ? Soki nazalaki nanu koluka kosepelisa bato, nalingaki kozala mosali ya Klisto te.
13 Solo, boyokaki sango ya bizaleli na ngai ya kala tango nazalaki nanu mondimi kati na lingomba ya Bayuda ; boyebi mpe ndenge nini nazalaki konyokola Lingomba ya Nzambe mpo na kopanza yango. 14 Kati na lingomba ya Bayuda, nazalaki komata koleka Bayuda ebele ya ekeke na ngai, oyo tozalaki na bango mibu moko ya mbotama ; nalekaki bango kutu na bolingo eleka ndelo mpo na bokoko ya batata na ngai. 15 Kasi tango Nzambe oyo aponaki ngai wuta na libumu ya mama na ngai mpe abengaki ngai na nzela ya ngolu na Ye, asepelaki 16 kotalisa ngai Mwana na Ye na nzela ya emoniseli mpo ete nakoka kosakola Ye kati na Bapagano, natunaki na mbala moko toli epai ya moto ata moko te. 17 Nakendeki kutu na Yelusalemi te mpo na kokutana na bato oyo bakomaki bantoma liboso na ngai, kasi nakendeki nde na Arabi. Sima na yango, nazongaki na Damasi.
18 Ezali sima na mibu misato nde nakendeki na Yelusalemi mpo na koyeba Petelo, mpe navandaki epai na ye mikolo zomi na mitano. 19 Natikalaki komona ntoma mosusu te, longola kaka Jake, ndeko ya Nkolo. 20 Nzambe azali Motatoli na ngai ete makambo oyo nazali kokomela bino ezali ya lokuta te.
21 Sima na yango, nakendeki na bituka ya Siri mpe ya Silisi. 22 Kasi Baklisto ya Mangomba ya Yuda bayebaki ngai te, 23 bayokaki kaka sango : « Moto oyo azalaki konyokola biso na kala akomi sik’oyo koteya kondima oyo azalaki koluka kobebisa. » 24 Mpe bazalaki kokumisa Nzambe na tina na ngai.
Bagalatia 2 ->