2 Namonaki bato motoba koya wuta na nzela ya Ekuke oyo ya likolo, oyo etala na ngambo ya nor ; moko na moko kati na bango asimbaki ebundeli oyo ebomaka na loboko na ye. Kati na bango, ezalaki na moto moko oyo alataki bilamba ya lino mpe azalaki na ekomeli na loketo na ye. Bakotaki na kati mpe batelemaki pene ya etumbelo ya bronze. 3 Nkembo ya Nzambe ya Isalaele elongwaki na likolo ya basheribe epai wapi ezalaki kowumela mpe ekendeki kino na ekotelo ya Tempelo ; mpe Yawe abengisaki moto oyo alataki bilamba ya lino mpe azalaki na ekomeli na loketo na ye. 4 Yawe alobaki na ye : « Tambola kati na Yelusalemi mpe tia bilembo na bilongi ya bato oyo bazali komona pasi na mitema mpe bazali kolela likolo ya makambo nyonso ya nkele oyo ezali kosalema kati na engumba oyo. »
5 Wana nazalaki nanu koyoka, alobaki na bato mosusu : « Bolanda ye kati na engumba mpe boboma bato na mawa te, bobikisa ata moto moko te ! 6 Boboma bampaka, bilenge, basali ya mibali, basali ya basi mpe bana mike ; kasi bomeka kosimba te moto nyonso oyo azali na elembo na elongi. Bobanda na Esika na Ngai ya bule ! »
9 Azongiselaki ngai :
11 Moto oyo alataki elamba ya lino mpe azalaki na ekomeli na loketo na ye apesaki sango, na maloba oyo : « Nasali makambo oyo otindaki ngai. »
<- Ezekieli 8Ezekieli 10 ->