5 Etuka moko ya bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi mpe bametele pene nkoto mitano na mokuse ekozala mpo na Balevi oyo basalaka kati na Tempelo ; lokola libula na bango, ekozala kuna nde bakotonga bingumba na bango ya kovanda.
6 Pembeni ya etuka ya bule, bokokata etando ya bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi mpe bametele pene nkoto mitano na mokuse mpo na kotonga engumba ; ekozala mpo na libota mobimba Isalaele.
7 Mokambi akozwa mabele oyo ezali kokabola etuka ya bule mpe mabele ya engumba ; mabele yango ekokende eteni moko na ngambo ya weste, mpe eteni mosusu na ngambo ya este. Molayi ya etuka yango ekobanda longwa na ngambo ya weste kino na mondelo ya ngambo ya este oyo etalana na moko ya biteni. 8 Etuka yango ekozala libula na ye kati ya Isalaele. Boye, bakambi na Ngai bakonyokola lisusu bato na Ngai te, kasi bakotika mokili na maboko ya lisanga ya Isalaele kolanda mabota na bango.
9 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh bakambi ya Isalaele, bino mpe bolekisi ! Botika makambo mabe mpe botika konyokola bato. Bosala makambo oyo ezali solo mpe alima. Botika kobotola bato na Ngai biloko na bango, elobi Nkolo Yawe. 10 Bosengeli te kosalela emekelo kilo ya lokuta, efa[a] ya lokuta to bati[b] ya lokuta. 11 Efa mpe bati ekotaka biloko ndenge moko : ekotaka ndambo moko kati na bandambo zomi ya omeri[c]. Bamekaka monene ya efa mpe bati kolanda monene ya omeri. 12 Mbongo moko ya ebende ya palata ekokani na bagrame zomi na mibale, mpe mine moko ekokani na mbongo ya bibende ya palata, tuku motoba.
18 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, okokamata mwana ngombe ya mobali oyo ezanga mbeba mpe okopetola Esika ya bule. 19 Nganga-Nzambe akozwa ndambo ya makila ya mbeka ya masumu, akotia yango na mabaya oyo esimbaka ekuke ya Tempelo, na basonge nyonso minei ya moboko ya etumbelo mpe na mabaya oyo esimbaka ekuke ya lopango ya kati. 20 Okosala ndenge moko na mokolo ya sambo ya sanza, mpo na moto nyonso oyo akosala masumu na nko te to na kozanga boyebi ; bongo nde okosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Tempelo.
21 Na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso, bokosala feti ya Pasika oyo ekosala mikolo sambo. Na mikolo wana, bokolia mapa ezanga levire. 22 Na mokolo yango, mokambi akopesa ngombe ya mobali lokola mbeka ya masumu mpo na ye moko mpe mpo na bato nyonso ya mokili. 23 Na mikolo nyonso sambo ya feti, mokonzi akopesa bangombe ya mibali sambo mpe bameme ya mibali sambo, oyo ezanga mbeba, lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe, mpe ntaba moko ya mobali lokola mbeka ya masumu. 24 Mpo na ngombe moko na moko ya mobali, akobonza yango elongo na likabo ya bakilo zomi na mitano ya bambuma mpe likabo ya balitele misato na ndambo ya mafuta ; mpe mpo na meme moko na moko ya mobali, akobonza yango elongo na likabo ya bakilo zomi na mitano ya bambuma mpe likabo ya balitele misato na ndambo ya mafuta.
25 Na mikolo nyonso sambo ya feti oyo ebandaka na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, akobanda kobonza bambeka kaka wana : bambeka ya masumu, ya kotumba, ya bambuma mpe ya mafuta.
<- Ezekieli 44Ezekieli 46 ->