4 Moto yango amemaki ngai lisusu na nzela ya ekuke ya nor kino na liboso ya Tempelo. Tango natalaki, namonaki nkembo na Yawe kotondisa Tempelo ya Yawe, mpe ngai nakweyaki elongi kino na mabele.
5 Yawe alobaki na ngai : « Mwana na moto, sala keba ! Fungola miso na yo mpe yoka na matoyi na yo makambo nyonso oyo nakoyebisa yo na tina na Tempelo mpe mitindo na yango ! Sala penza keba na ekotelo ya Tempelo mpe bikuke nyonso ya Esika ya bule. 6 Yebisa batomboki oyo, libota ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh libota ya Isalaele, nalembi misala na bino nyonso ya nkele ! 7 Wana bozalaki kobonzela Ngai bilei, mafuta mpe makila ya banyama, bokotisaki kati na Esika na Ngai ya bule bapaya oyo batosaka Ngai te mpe bakatama ngenga te, mpo na kobebisa bosantu ya Tempelo na Ngai ; na bongo, bobebisaki boyokani na Ngai mpo na kokokisa misala na bino nyonso ya mbindo ! 8 Na esika ete bomipesa na mosala ya biloko na Ngai ya bule, bino bozali nde kopesa mosala na Ngai epai ya bapaya, kati na Esika na Ngai ya bule.
9 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mopaya moko te oyo atosaka Ngai te mpe oyo akatisa ngenga te akokota na Esika na Ngai ya bule, ezala bapaya oyo bazali kovanda kati na bana ya Isalaele.
20 Banganga-Nzambe bakoki te kokokola suki ya mito na bango to kokolisa makasi suki na bango ; kasi basengeli kokata suki na bango malamu. 21 Nganga-Nzambe moko te akomela masanga ya vino liboso ete akota na lopango ya kati. 22 Bakoki kobala te basi oyo bakufisa mibali to basi oyo bakabwana na mibali na bango na libala, kasi bakobala kaka bilenge basi ya Isalaele oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te to basi ya Banganga-Nzambe oyo basila kokufa.
23 Bakoteya bato ete bayeba kosala bokeseni kati na biloko ya bule mpe oyo ya bule te, kati na biloko ya mbindo mpe oyo ya peto. 24 Na tango ya matata, Banganga-Nzambe bakotelema lokola basambisi mpo na kokata makambo kolanda mibeko, bakotosa mibeko mpe bikateli na Ngai, bafeti na Ngai, oyo ekatama mpe bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba.
25 Nganga-Nzambe moko te akomikomisa mbindo na kopusana pene ya moto ya kokufa. Nzokande, akoki kondima komikomisa mbindo soki moto oyo akufi azali tata to mama na ye, mwana na ye ya mobali to ya mwasi, ndeko na ye ya mobali to ya mwasi oyo amibalelaki te. 26 Sima na kopetolama na ye, akozela mikolo sambo. 27 Na mokolo oyo akokota kati na Esika ya bule, kati na lopango ya kati mpo na kosala mosala, akobonza mbeka mpo na masumu na ye moko, elobi Nkolo Yawe.
28 Tala oyo ekozala libula ya Banganga-Nzambe : Ngai moko nde nazali libula na bango. Bokopesa bango mabele te kati na Isalaele ; Ngai moko nde nakozala mabele na bango. 29 Bakolia makabo ya bambuma, bambeka ya masumu mpe bambeka ya kozongisa boyokani ; biloko nyonso oyo, kati na Isalaele, ebulisama mpo na Yawe ekozala ya bango. 30 Bambuma ya liboso oyo ya kitoko mpe makabo na bino nyonso, kolongola ata eloko moko te, ekozala ya Banganga-Nzambe ; bokopesa bango bambuma ya liboso ya bilanga na bino ya ble mpo ete mapamboli ezala kati na bandako na bino. 31 Banganga-Nzambe bakoki kolia te ndeke to nyama oyo ekufi yango moko to oyo nyama mosusu esili koboma.
<- Ezekieli 43Ezekieli 45 ->