9 Na se ya bashambre, ezalaki na ekotelo moko na ngambo ya este soki okoteli wuta na lopango ya libanda. 10 Bashambre yango ezalaki na ngambo ya sude, na molayi ya mir ya lopango ya libanda oyo ekenda kino na lopango ya Tempelo oyo etalana na mir ya libanda. 11 Mwa nzela moko ezalaki liboso na yango. Bashambre yango ezalaki ndenge moko na bashambre ya nor, na mokuse mpe na molayi ; mpe bikuke na yango ezalaki ndenge moko na monene. Bikuke ya bashambre oyo ezalaki na ngambo ya nor 12 ezalaki ndenge moko na bikuke ya bashambre ya ngambo ya sude. Ezalaki na ekuke moko na ebandeli ya mwa nzela oyo etalana na mir oyo ebatelaka, oyo ezali na ngambo ya este epai wapi bazalaki kokotela na bashambre. 13 Bongo moto yango alobaki na ngai : « Bashambre oyo ezali na ngambo ya nor mpe ya sude, oyo etalana na lopango ya Tempelo ezali bashambre ya Banganga-Nzambe ; ezali kuna nde Banganga-Nzambe oyo bapusanaka liboso ya Yawe bakobanda kolia biloko oyo eleki bule. Ezali kuna nde bakobanda komema biloko oyo eleki bule : makabo ya bambuma, bambeka ya masumu mpe bambeka ya kozongisa boyokani, pamba te esika yango ezali bule. 14 Soki bakoti kuna, Banganga-Nzambe bakoki kobima te na biteni ya bule ya Tempelo mpo na kokende na lopango ya libanda, kasi basengeli kotika bilamba oyo bazalaki kosalela mosala ya bonganga-Nzambe kuna, pamba te bilamba yango ezali bule ; bakolata bilamba mosusu liboso ya kopusana na bisika oyo ebongisami mpo na bato. »
15 Tango asilisaki komeka molayi ya kati ya Tempelo, amemaki ngai na libanda, na nzela ya ekuke ya este, mpe amekaki molayi ya lopango zingazinga ya Tempelo.
16 Amekaki molayi ya ngambo ya este na libaya oyo bamekelaka molayi : ezalaki na bametele pene nkama mibale na tuku mitano. 17 Amekaki molayi ya ngambo ya nor na libaya oyo bamekelaka molayi : ezalaki bametele pene nkama mibale na tuku mitano. 18 Amekaki molayi ya ngambo ya sude na libaya oyo bamekelaka molayi : ezalaki bametele pene nkama mibale na tuku mitano. 19 Amekaki molayi ya ngambo ya weste na libaya oyo bamekelaka molayi : ezalaki na bametele pene nkama mibale na tuku mitano. 20 Amekaki bangambo nyonso minei. Ezalaki na mir moko zingazinga na yango, oyo ezalaki na bametele pene nkama mibale na tuku mitano na molayi mpe nkama mibale na tuku mitano na mokuse ; mir yango ezalaki kokabola eteni ya bule ya Tempelo mpe eteni ya Tempelo oyo ezali bule te.
<- Ezekieli 41Ezekieli 43 ->