3 Atunaki ngai :
4 Bongo alobaki na ngai :
7 Boye, nasakolaki ndenge kaka atindaki ngai. Bongo wana nazalaki nanu kosakola, makelele moko ya makasi eyokanaki ; mpe, mbala moko, mikuwa yango ekomaki koningana mpe kosangana moko na moko na mosusu. 8 Wana nazalaki kotala, namonaki misisa mpe misuni kobima na mikuwa yango mpe poso ya nzoto kozipa yango, kasi ezalaki na pema te.
9 Yawe alobaki na ngai :
10 Nasakolaki ndenge kaka atindaki ngai ; bongo pema ekotaki kati na yango mpe ezwaki lisusu bomoi. Batelemaki mpe bazalaki mampinga moko ya monene.
11 Alobaki na ngai :
16 « Mwana na moto, kamata eteni ya libaya mpe koma na likolo na yango : ‹ Mpo na Yuda mpe mpo na bana ya Isalaele oyo basangani na ye. › Kamata eteni mosusu ya libaya mpe koma na likolo na yango : ‹ Mpo na Jozefi, nzete ya Efrayimi, mpe mpo na libota mobimba ya Isalaele oyo esangani na ye. › 17 Kangisa yango mpe komisa yango libaya moko mpo ete ezala eloko moko kati na loboko na yo.
18 Soki bandeko na yo batuni yo : ‹ Olingi koloba na biso nini ? Makambo oyo elingi kolakisa nini ? ›
19 Okozongisela bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakozwa libaya ya Jozefi, oyo ezali kati na loboko ya Efrayimi, mpe bato ya mabota ya Isalaele oyo basangani na ye ; nakokangisa yango na libaya ya Yuda. Nakokomisa yango nzete moko mpe ekokoma eloko moko kati na loboko na Ngai. ›
20 Okosimba kati na loboko na yo, na miso na bango, mabaya oyo okomaki ; 21 mpe okoloba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakobimisa bana ya Isalaele wuta na bikolo ya zingazinga epai wapi bakendeki mpe nakozongisa bango na mabele na bango. 22 Nakokomisa bango ekolo kaka moko kati na mokili, na likolo ya bangomba ya Isalaele. Ekozala kaka na mokonzi moko oyo akokonza bango ; mpe bakozala lisusu bikolo mibale te to bakokabwana lisusu na bokonzi mibale te. 23 Bakomikomisa lisusu mbindo te na nzela ya banzambe na bango ya bikeko mpe ya bililingi na bango ya mabe to na nzela ya misala na bango ya mabe ; pamba te nakobikisa bango wuta na bisika oyo bazalaki kovanda epai wapi basalaki masumu mpe nakopetola bango ; bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango.
24 Mosali na Ngai, Davidi, akozala mokonzi na bango, mpe bango nyonso bakozala na mobateli bibwele kaka moko, bakotosa mibeko na Ngai mpe bakobatela na bokebi mitindo na Ngai. 25 Bakovanda lisusu na mokili oyo napesaki na Jakobi, mosali na Ngai, mokili oyo batata na bino bavandaki : bango, bana na bango ya mibali mpe bakitani na bango ya mibali bakovanda kuna mpo na libela ; mpe mosali na Ngai, Davidi, akozala mokambi na bango mpo na libela.
26 Nakosala boyokani ya kimia elongo na bango : ekozala boyokani ya libela na libela. Nakolendisa bango, nakokomisa bango ebele koleka mpe nakotia Esika na Ngai ya bule kati na bango mpo na libela. 27 Nakotia ndako na Ngai kati na bango ; nakozala Nzambe na bango, mpe bango, bakozala bato na Ngai. 28 Bongo bato ya bikolo mosusu bakoyeba solo ete Ngai Yawe nde nakomisi Isalaele bule tango nakotia Esika na Ngai ya bule kati na bango mpo na libela. › »
<- Ezekieli 36Ezekieli 38 ->