6 Tango Yawe apesaki mitindo na moto oyo alataki bilamba ya lino : « Kamata moto kati na bapine mpe kati na basheribe, » moto yango akotaki mpe atelemaki pembeni ya pine moko. 7 Bongo moko kati na basheribe asembolaki loboko na ye kino na moto oyo ezalaki na kati-kati na bango ; akamataki ndambo ya makala ya moto kati na moto mpe atiaki yango kati na maboko ya moto oyo alataki bilamba ya lino. Moto yango azwaki yango mpe abimaki na libanda. 8 Na se ya mapapu ya basheribe, elilingi moko emonanaki lokola maboko ya moto.
9 Tango natalaki, namonaki bapine minei pene ya basheribe : pine moko pembeni ya sheribe moko ; bongo bapine yango ezalaki kongenga lokola libanga ya Krizolite. 10 Bapine yango minei ezalaki ndenge moko, ezalaki komonana lokola moko kati na mosusu. 11 Soki ezali kotambola, ekendaka na bangambo nyonso minei oyo elongi ya basheribe ekotala ; mpe bapine yango ezalaki kotengama te soki basheribe bazali kotambola. Basheribe bazalaki kokende na bangambo nyonso oyo bilongi na bango ezalaki kotala, mpe bazalaki kobaluka na bangambo mosusu te. 12 Nzoto mobimba ya moko na moko kati na bango, ezala mokongo to maboko to mpe mapapu na bango, ezalaki etonda na miso, ndenge bapine na bango minei ezalaki. 13 Nayokaki ete bazali kobenga bapine yango « bapine ya mopepe ya kayina. » 14 Sheribe moko na moko azalaki na bilongi minei : elongi ya liboso ezalaki lokola elongi ya sheribe, ya mibale lokola elongi ya moto, ya misato lokola elongi ya nkosi mpe ya minei lokola elongi ya mpongo.
15 Bongo basheribe bapumbwaki na likolo makasi. Ezalaki bikelamu ya bomoi oyo namonaki pembeni ya ebale Kebari. 16 Soki basheribe bazali kotambola, bapine oyo ezalaki na mipanzi na bango ezalaki mpe kotambola. Soki bafungoli mapapu na bango mpo na kopumbwa longwa na se, bapine yango mpe ezalaki kokabwana na bango te, kasi nde ezalaki ya kokangana na mipanzi na bango. 17 Soki basheribe batelemi, yango mpe ezalaki kotelema ; soki bapumbwe, yango mpe ezalaki kopumbwa elongo na bango, pamba te molimo ya bikelamu ya bomoi ezalaki kati na yango.