3 Tango Moyize akendeki koyebisa bato makambo mpe mibeko nyonso ya Yawe, bato bazongisaki elongo :
4 Moyize akomaki maloba nyonso oyo Yawe ayebisaki ye. Mokolo oyo elandaki, alamukaki na tongo makasi mpe atongaki etumbelo na ebandeli ya ngomba. Bongo, atelemisaki mabanga zomi na mibale oyo ezali kotalisa mabota zomi na mibale ya Isalaele. 5 Atindaki bilenge mibali ya Isalaele ete babonzela Yawe mbeka ya kotumba ya bangombe ya mibali lokola mbeka ya boyokani. 6 Moyize azwaki ndambo ya makila, atiaki yango na sani ; bongo ndambo mosusu, abwakaki-bwakaki yango na likolo ya etumbelo. 7 Azwaki lisusu buku ya Boyokani mpe atangaki yango liboso ya bana ya Isalaele. Boye bango bazongisaki :
8 Moyize azwaki makila, abwakelaki-bwakelaki yango bato mpe alobaki :
9 Sima na yango, Moyize elongo na Aron, Nadabi, Abiyu mpe bakambi tuku sambo ya Isalaele, bamataki likolo ya ngomba 10 epai wapi bamonaki Nzambe ya Isalaele ; se ya matambe na Ye ezalaki lokola mabanga ya talo ya safiri mpe ezalaki na langi ya ble ya kitoko lokola ble ya likolo. 11 Kasi Nzambe asembolaki loboko na Ye te mpo na kobeta bakambi ya Isalaele ; bamonaki Nzambe, baliaki mpe bamelaki.
13 Boye Moyize atelemaki elongo na mosungi na ye Jozue mpe amataki na ngomba ya Nzambe. 14 Moyize alobaki na bakambi : « Bozela biso awa kino tokozonga. Aron mpe Wuri bazali elongo na bino. Tika ete soki moto azali na likambo, ayebisa bango yango. »
15 Tango Moyize amataki likolo ya ngomba, mapata ezipaki ye 16 mpe nkembo ya Yawe ewumelaki na likolo ya ngomba Sinai. Mikolo motoba, mapata ezipaki ngomba. Bongo na mokolo ya sambo, Yawe abengaki Moyize kati na mapata. 17 Na miso ya bana ya Isalaele, Nkembo ya Yawe emonanaki na likolo ya ngomba lokola moto oyo etumbaka. 18 Tango Moyize amataki likolo ya ngomba, akotaki kati na mapata. Awumelaki kuna mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei.
<- Kobima 23Kobima 25 ->