1 Yawe alobaki na Moyize : 2 « Bulisela Ngai mwana mobali nyonso ya liboso kati na bana ya Isalaele ; ezala moto to nyama, azali ya Ngai. »
11 Tango Yawe akokotisa bino na mokili ya Kanana mpe akopesa bino yango ndenge alakaki yango, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino mpe epai na bino, 12 bokobonzela Ye bana mibali nyonso ya liboso : bana nyonso ya liboso ya banyama ekozala ya Yawe. 13 Kasi soki mwana yango ya liboso ya nyama ezali mwana ya ane, bosengeli kobonza na esika na yango mwana meme ; soki te, bokobuka yango kingo. Kasi bokosikola na mbongo mwana nyonso ya liboso kati na bana na bino ya mibali. 14 Mikolo ekoya, tango bana na bino ya mibali bakotuna bino : ‹ Molulu oyo elakisi nini ? › Bokoloba na bango : ‹ Ezali na nguya na Ye nde Yawe abimisaki biso na Ejipito, mokili ya bowumbu. 15 Tango Faraon aboyaki kotika biso kokende, Yawe abomaki kati na Ejipito mwana nyonso ya liboso, ezala ya moto to ya nyama. Yango wana nazali kobonzela Yawe bana nyonso ya liboso kati na banyama mpe nazali kosikola bana nyonso ya liboso kati na bana na ngai. › 16 Mpe yango ekozala lokola elembo na loboko na bino mpe ekaniseli na elongi na bino, pamba te Yawe abimisaki bino na Ejipito na nzela ya loboko na Ye ya nguya. »
19 Moyize azwaki mikuwa ya Jozefi, pamba te Jozefi alapisaki bana ya Isalaele ndayi ; alobaki : « Solo, Nzambe akozanga te kosunga bino, boye bokolongola mikuwa na ngai na esika oyo mpe bokomema yango elongo na bino. »
20 Tango balongwaki na Sukoti mpe batongaki molako na Etami, na mondelo ya esobe, 21 Yawe atambolaki liboso na bango, na moyi lokola likonzi ya lipata mpo na kolakisa bango nzela, mpe na butu lokola likonzi ya moto mpo na kongengisa bango, mpo ete batambola butu mpe moyi. 22 Likonzi ya lipata na moyi to likonzi ya moto na butu elongwaki na esika na yango te liboso ya bana ya Isalaele.
<- Kobima 12Kobima 14 ->- a Rozo ezali lolenge ya matiti oyo ebotaka na mayi. Yango ezalaka pete mingi.