5 Bayuda babebisaki banguna na bango nyonso na mopanga, babomaki bango mpe babebisaki bango ; basalaki bato oyo bazalaki koyina bango makambo nyonso oyo basepelaki kosala. 6 Kaka na engumba Size, Bayuda babomaki mpe babebisaki bato nkama mitano. 7 Babomaki mpe lisusu Parishandata, Dalifoni, Asipata ; 8 Porata, Adalia mpe Aridata ; 9 Parimashita, Arizayi, Aridayi mpe Vayezata ; 10 bana mibali zomi ya Amani, mwana mobali ya Amedata, monguna na Bayuda, kasi batikalaki te kozwa bomengo ya bitumba.
11 Kaka na mokolo wana, bayebisaki mokonzi motango ya bato oyo babomaki kati na engumba Size.
12 Mokonzi alobaki na Ester, mwasi ya mokonzi :
13 Ester azongisaki :
14 Mokonzi apesaki ndingisa ete esalema bongo. Bapanzaki sango ya mobeko yango na engumba Size mpe badiembikaki bana mibali zomi ya Amani. 15 Bayuda oyo bazalaki kovanda kati na engumba Size basanganaki na mokolo ya zomi na minei, ya sanza ya Adari, mpe bobomaki bato nkama misato ; kasi batikalaki kozwa bomengo ya bitumba te.
16 Bayuda mosusu oyo bazalaki kovanda kati na bituka ya mokonzi, bango mpe basanganaki mpo na komibatela mpe bazwaki bopemi liboso ya banguna na bango. 17 Na mokolo ya zomi na misato ya sanza ya Adari, babomaki bato nkoto tuku sambo na mitano kati na banguna na bango, kasi batikalaki kozwa bomengo ya bitumba te. Bongo na mokolo ya zomi na minei, bapemaki mpe bakomisaki yango mokolo ya feti mpe ya esengo.
18 Nzokande, Bayuda oyo bazalaki kovanda kati na engumba Size basanganaki na mokolo ya zomi na misato mpe ya zomi na minei ; bongo na mokolo ya zomi na mitano, bapemaki mpe bakomisaki yango mokolo ya feti mpe ya esengo. 19 Yango wana Bayuda oyo bavandaka na bingumba ezanga bamir bakomisa mokolo ya zomi na minei ya sanza ya Adari, mokolo ya esengo mpe ya feti, mokolo oyo bakabelanaka bakado kati na bango.
23 Bayuda bandimaki kokoba kosala feti oyo mpe bakomaki kosala makambo oyo Maridoshe akomelaki bango. 24 Pamba te Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya mboka Agagi, monguna ya Bayuda nyonso, asalelaki Bayuda likita mpo na kobebisa bango ; abetaki Puri, oyo ezali « zeke, » mpo na kufa mpe libebi na bango. 25 Kasi tango mokonzi ayokaki sango ya likita ya Amani, akomaki mobeko kati na mokanda mpo ete makanisi mabe oyo Amani abongisaki mpo na Bayuda ekweya na moto na ye moko mpe, lisusu, badiembika ye elongo na bana na ye ya mibali, na nzete. 26 Yango wana babengaka mokolo yango Purimi (ewuti na kombo Puri oyo elakisi zeke). Mpo na makambo nyonso oyo Maridoshe akomaki na mokanda, mpo na makambo nyonso oyo bamonaki mpe makambo nyonso oyo ekomelaki bango, 27 Bayuda bakataki mpe bandimaki ete yango ekoma ezaleli mpo na bango, ezaleli ya bakitani na bango mpe ya bato nyonso oyo bakosangana na bango, mpo ete batosaka kosala feti ya mikolo oyo mibale, na mibu nyonso, ndenge ekatama na tango na yango. 28 Milongo nyonso mpe mabota nyonso ekosala feti na mikolo oyo kati na bituka nyonso mpe bingumba nyonso. Bayuda bakoki kotika te kosala feti na mikolo ya Purimi, mpe ekaniseli na yango ekoki kolimwa te kati na bakitani na bango.
29 Boye, Ester, mwasi ya mokonzi, mwana mwasi ya Abiyaili, elongo na Moyuda Maridoshe, basalelaki bokonzi na bango mpe bakomaki mokanda mosusu mpo na kolendisa makambo oyo etali Purimi. 30 Maridoshe atindaki mikanda epai ya Bayuda nyonso oyo bazalaki kovanda kati na bituka nyonso nkama moko na tuku mibale na sambo ya mokili ya Kizerisesi, mpe mikanda yango ezalaki na maloba ya kimia mpe ya elikya 31 mpo na kobeta sete na tina na mikolo oyo ya Purimi ete Bayuda basengeli kosala Purimi yango na mikolo na yango oyo ekatama kolanda mokano ya Moyuda Maridoshe mpe Ester, mwasi ya mokonzi ; mpe ndenge Bayuda bakataki yango mpo na bango moko mpe mpo na bakitani na bango lokola tango na bango ya kokila bilei mpe ya bileli. 32 Mitindo ya Ester elendisaki mibeko mpo na Purimi mpe ekomamaki na buku.
<- Ester 8Ester 10 ->