3 Kati na bituka nyonso epai wapi mitindo mpe mobeko ya mokonzi ezalaki kokoma, matanga monene ezalaki kati na Bayuda : bazalaki kokila bilei, kolela mpe koganga ya mawa ; ebele bazalaki komitanda na basaki mpe na putulu.
4 Tango basi bawumbu ya Ester, mwasi ya Mokonzi, mpe basoda na ye, oyo baboma bango mokongo, bayebisaki Ester makambo oyo Maridoshe asalaki, Ester amitungisaki makasi. Atindelaki Maridoshe bilamba mpo ete alata yango mpe alongola basaki oyo alataki, kasi Maridoshe aboyaki. 5 Ester abengisaki Ataki, moko kati na bakalaka ya lokumu, oyo baboma mokongo mpe mokonzi aponaki mpo na kosalela Ester ; atindaki ye mpo na koyeba likambo oyo ezali kotungisa Maridoshe mpe tina nini azali komitungisa. 6 Boye Ataki akendeki epai ya Maridoshe na etando ya engumba, epai wapi bato ebele bakutanaka, liboso ya ekuke ya ndako ya mokonzi. 7 Maridoshe ayebisaki ye makambo nyonso oyo ekomelaki ye, ata motuya ya mbongo oyo Amani alakaki kopesa na libenga ya bomengo ya mokonzi mpo ete baboma Bayuda. 8 Maridoshe apesaki lisusu Ataki mokanda ya mobeko oyo mokonzi abimisaki, mpo ete ye Ataki alakisa yango epai ya Ester, alimbolela ye yango mpe akomisa epai ya Ester mitindo na ye ete Ester akende epai ya mokonzi mpo na kotungisa ye mpe kobondela mawa ya mokonzi mpo na bato na ye Ester ; pamba te mokonzi asili kobimisa mobeko ya koboma Bayuda mpe sango na yango esili kopanzana kati na engumba Size.
9 Tango Ataki azongaki mpe ayebisaki Ester makambo oyo Maridoshe alobaki, 10 Ester atindaki lisusu Ataki koloba na Maridoshe :
12 Tango bayebisaki Maridoshe makambo oyo Ester alobaki, 13 Maridoshe azongiselaki Ester :
15 Ester atindelaki Maridoshe eyano oyo :
17 Maridoshe akendeki mpe asalaki makambo nyonso oyo Ester atindaki ye.
<- Ester 3Ester 5 ->