9 Namonaki makambo nyonso wana, tango natiaki mayele na ngai mpo na koluka koyeba makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi. Ezali na tango oyo moto amatelaka bato mosusu mpo na konyokola bango. 10 Mpe lisusu, namonaki ete bazali kokunda bato mabe ; bongo bato oyo bazalaki kokende mpe kozonga na Esika ya bule bazalaki kokumisa bato mabe wana kati na engumba mpo na makambo oyo bazalaki kosala. Wana mpe ezali kaka pamba.
11 Soki etumbu epesami noki te mpo na mabe oyo esalemi, mitema ya bato etondaka na makanisi ya kosala mabe. 12 Atako moto oyo asalaka masumu asali mabe mbala nkama moko mpe awumeli tango molayi na bomoi, nayebi solo ete bato oyo batosaka Nzambe bakozala bato ya esengo ; pamba te bazali na botosi liboso na Ye. 13 Nzokande, lokola bato mabe batosaka Nzambe te, makambo na bango mpe ekotambola malamu te, mpe mikolo ya bomoi na bango ekowumela te lokola elili.
15 Bongo, nakumisaki esengo, pamba te ezali na eloko moko te na se ya moyi oyo eleki malamu mpo na moto, soki kaka te kolia, komela mpe kosepela. Boye esengo esengeli kobila ye kati na mosala na ye mikolo nyonso ya bomoi oyo Nzambe apesa ye na se ya moyi.
16 Tango natiaki mayele na ngai mpo na koluka koyeba bwanya mpe kososola mosala ya moto kati na mokili, —ata soki miso na ye ezwaka pongi te, ezala na moyi to na butu— 17 namonaki nyonso oyo Nzambe asala. Moto moko te akoki kososola makambo oyo elekaka na se ya moyi. Soki asali makasi mpo na koyeba, akotikala te kososola tina na yango ; mpe ata soki moto ya bwanya abeti tolo ete ayebi, akotikala kaka kososola yango te.
<- Mosakoli 7Mosakoli 9 ->