9 Litomba nini mosali azwaka na mosala oyo amonelaka pasi ? 10 Natalaki mokumba oyo Nzambe amemisaki bato. 11 Nzambe asalaka eloko na eloko malamu na tango na yango ; atiaka lisusu, kati na mitema ya bato, posa ya koyeba mabombami na Ye. Nzokande, bato bakokaka te kososola mosala ya Nzambe, kobanda na ebandeli kino na suka.
12 Nayebi ete ezali na eloko moko oyo eleki malamu mpo na bato : ezali kaka kosepela mpe kozala malamu tango bazali na bomoi. 13 Yango wana, tika ete moto na moto alia, amela mpe amona bolamu kati na mosala na ye nyonso, pamba te ezali likabo ya Nzambe.
14 Nayebi ete makambo nyonso oyo Nzambe asalaka ewumelaka seko ; boye ezali ata na eloko moko te ya kobakisa na likolo na yango to ya kolongola kati na yango. Nzambe asalaka yango bongo mpo ete bakumisa Ye.
18 Namilobelaki lisusu : « Nzambe amekaka bato mpo ete bakoka komimona bango moko ete bazali lokola banyama. 19 Suka ya moto ezali lokola suka ya nyama : bango mibale basukaka kaka ndenge moko ; ndenge moko akufaka, mosusu mpe akufaka kaka bongo. Bango nyonso bazali kaka na pema moko : moto aleki nyama na eloko te. Nyonso wana ezali kaka pamba. 20 Nyonso ekendaka kaka esika moko ; nyonso ewutaki na putulu, mpe nyonso ekozonga kaka na putulu. 21 Nani ayebi soki molimo ya moto emataka na likolo, mpe soki molimo ya nyama ekitaka na se ya mabele ? »
22 Boye, nasosolaki ete ezali na eloko moko te oyo eleki malamu mpo na moto, soki kaka te kosepela mpe komona bolamu na mosala na ye, pamba te yango nde ezali litomba na ye. Nani akoki kosunga ye mpo ete amona makambo oyo ekoya sima na ye ?
<- Mosakoli 2Mosakoli 4 ->