4 Nazwaki mokano ya kosalisa misala minene : namitongelaki bandako minene mpe namilonelaki bilanga ya vino mpo na bomoi na ngai ; 5 nasalaki bilanga mpe nabongisaki bisika mpo na kolona banzete ya ndenge na ndenge, oyo ebotaka bambuma ; 6 natimolaki mpo na ngai moko, mabulu minene ya mayi mpo na kosopela banzete ya mike mayi.
7 Nasombaki bawumbu ya mibali mpe ya basi ; kobakisa na motango ya bawumbu mosusu oyo babotamaki kati na ndako na ngai. Nazalaki mpe na bangombe, bantaba mpe bameme ebele koleka bakonzi nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi liboso na ngai.
8 Nakongolaki mpo na ngai moko palata mpe wolo oyo ewutaki na bomengo ya bakonzi mpe ya bituka ; nazwaki mpo na ngai bayembi ya basi mpe ya mibali, mpe oyo esepelisaka makasi mibali : mwasi mpe basi ebele ya kitoko.
9 Nakomaki moto monene koleka bakonzi nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi liboso na ngai ; kasi atako bongo, bwanya ezalaki kaka kotambolisa ngai.
17 Boye, nayinaki bomoi, pamba te misala oyo esalemaka na se ya moyi ezali mabe mpo na ngai. Nyonso wana ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.
18 Nayinaki biloko nyonso oyo namonelaki pasi na se ya moyi, pamba te nakotika yango epai ya moto oyo akoya sima na ngai. 19 Bongo, nani ayebi soki moto yango akozala moto ya bwanya to zoba ? Nzokande, ye nde akozala na bokonzi na likolo ya misala nyonso oyo nabimiselaki motoki mpe mayele na ngai na se ya tango. Yango mpe ezali kaka pamba.
20 Bongo, motema na ngai ekomaki kobungisa elikya likolo ya misala makasi oyo nazalaki kosala na se ya moyi. 21 Pamba te moto akoki kosala mosala na ye na bwanya, na boyebi mpe na ndenge esengeli penza ; kasi akotika nyonso oyo azali na yango epai ya moto oyo amonelaki yango pasi te ; yango mpe ezali pamba mpe mabe makasi.
22 Litomba nini moto akoki kozwa na misala nyonso oyo asali mpe amonelaka pasi na se ya moyi ? 23 Mikolo nyonso ya mosala na ye ezali kaka pasi mpe komitungisa ; ezala na butu, makanisi na ye ezalaka na kimia te ; oyo mpe ezali kaka pamba.
26 Nzambe apesaka bwanya, mayele mpe esengo na moto oyo asepelisaka Ye ; kasi apesaka mosala ya kosangisa mpe ya konduka bomengo epai ya moto oyo asalaka masumu mpo ete atika yango na maboko ya moto oyo asepelisaka Nzambe.