5 Moyize, mosali na Yawe, akufaki kuna na Moabi ndenge Yawe alobaki na ye. 6 Ye moko Nzambe akundaki ye kati na Moabi, na lubwaku oyo etalana na Beti-Peori ; mpe kino lelo, moto moko te ayebi esika oyo kunda na ye ezali.
7 Moyize azalaki na mibu nkama moko na tuku mibale ya mbotama tango akufaki. Miso na ye elembaki te mpe makasi na ye esilaki te. 8 Bana ya Isalaele balelaki Moyize mikolo tuku misato, na etando ya Moabi kino tango ya kolela mpe ya matanga esilaki.
9 Jozue, mwana mobali ya Nuni, atondisamaki na Molimo ya bwanya, pamba te Moyize atielaki ye maboko. Bana ya Isalaele bayokelaki ye mpe batosaki mitindo oyo Yawe apesaki na Moyize.
10 Wuta mokolo wana, mosakoli moko te atikalaki lisusu kobima kati na Isalaele, oyo akokanaki na Moyize oyo Yawe azalaki kosolola na ye miso na miso, 11 oyo asalaki bikamwa nyonso mpe bilembo nyonso ya minene oyo Yawe atindaki ye kosala kati na Ejipito liboso ya Faraon, ya bakalaka na ye nyonso mpe ya mokili na ye mobimba ; 12 pamba te moto moko te atikalaki komonisa misala ya nguya mpe ya somo lokola misala oyo Moyize asalaki na miso ya bana nyonso ya Isalaele.
<- Deteronomi 33