7 Bongo Moyize abengisaki Jozue mpe alobaki na ye na miso ya bana nyonso ya Isalaele : « Yika mpiko mpe zala na molende, pamba te okokende elongo na bato oyo kino na mokili oyo Yawe alakaki kopesa epai ya bakoko na bango na nzela ya ndayi, mpe okokabola yango mpo na bango lokola libula na bango. 8 Ye moko Yawe akotambola liboso na yo mpe akozala elongo na yo. Kobanga te mpe yika mpiko. »
10 Moyize atindaki bango : « Na suka ya mibu sambo nyonso, na mobu ya kotika baniongo, na tango ya feti ya Bandako ya kapo, 11 tango bana nyonso ya Isalaele bakopusana liboso ya Yawe, Nzambe na bino, na esika oyo akopona, bokotanga mibeko oyo liboso na bango mpo ete matoyi na bango ekoka koyoka. 12 Bosangisa bato : mibali, basi, bana mpe bapaya oyo bazali kati na bingumba na bino mpo ete bakoka koyoka mpe koyekola kotosa Yawe, Nzambe na bino, mpe kosalela malamu maloba nyonso ya mibeko oyo. 13 Bana na bango oyo bayebi mibeko oyo te basengeli koyoka yango malamu mpe koyekola kotosa Yawe, Nzambe na bino, tango nyonso oyo bokovanda kati na mokili oyo bokozwa sima na kokatisa Yordani. »
18 Solo, na mokolo wana, nakobombela bango elongi na Ngai mpo na mabe nyonso oyo basalaki, wana bakendeki epai ya banzambe mosusu.
19 Sik’oyo, koma nzembo oyo mpe lakisa yango yo moko epai ya bana ya Isalaele, mpe sala ete bayemba yango mpo ete ezala litatoli mpo na Ngai, liboso na bango. 20 Pamba te nakokotisa bango na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo nalakaki kopesa epai ya bakoko na bango na nzela ya ndayi : bakolia, bakotonda mpe bakoya minene ; bongo bakokende epai ya banzambe mosusu mpe bakosambela yango, bakobwaka Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai. 21 Tango bokono ebele mpe pasi mingi ekokomela bango, nzembo oyo ekotatola mpo na kofunda bango, pamba te bakitani na bango bakobosana yango te. Nayebi makambo oyo bazali kokana kosala atako nakotisi bango nanu te kati na mokili oyo nalakaki kopesa bango na nzela ya ndayi. »
22 Boye, Moyize akomaki nzembo yango kaka na mokolo wana mpe alakisaki yango bana ya Isalaele.
23 Yawe apesaki mitindo oyo epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni : « Yika mpiko mpe zala na molende, pamba te okokotisa bana ya Isalaele kati na mokili oyo nalakaki kopesa bango na nzela ya ndayi, mpe Ngai moko nakozala elongo na yo. »
24 Moyize asilisaki kokoma kati na buku maloba nyonso ya mobeko oyo. 25 Bongo Moyize apesaki mitindo oyo epai ya Balevi oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe : 26 « Bokamata buku oyo ya Mobeko mpe botia yango pembeni ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Nzambe na bino ; ekozala kuna lokola litatoli mpo na bino. 27 Pamba te nayebi ndenge nini bozali batomboki mpe mito makasi. Soki, wana nazali nanu na bomoi kati na bino, bozali batomboki liboso ya Yawe, ekozala boni sima na kufa na ngai ? 28 Bosangisa liboso na ngai bakambi nyonso ya mabota na bino mpe bakalaka na bino, mpo ete naloba maloba oyo na matoyi na bango mpe nazwa likolo mpe se lokola batatoli mpo na kofunda bango. 29 Pamba te nayebi solo ete sima na kufa na ngai, bokomibebisa mpe bokopengwa mosika na nzela oyo natindaki bino. Na mikolo oyo ezali koya, bokono ekokweyela bino, pamba te bokosala mabe na miso ya Yawe mpe bokotumbola kanda na Ye na nzela ya misala ya maboko na bino. »