Deteronomi
5 Ezalaki na ngambo ya este ya Yordani, na mokili ya Moabi, nde Moyize alimbolaki mobeko oyo. Alobaki na bango :
14 Bozongiselaki ngai :
15 Boye, nazwaki bakambi kati na mabota na bino, bato ya lokumu mpe ya bwanya, bongo nakomisaki bango bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi, mpe bakalaka mpo na mabota na bino. 16 Na tango wana, napesaki bakambi na bino mokumba oyo : « Boyoka kowelana oyo ezali kati na bandeko na bino mpe bokata makambo na bosembo ; ezala kowelana kati ya bana ya Isalaele bango na bango to kati ya mwana ya Isalaele mpe mopaya. 17 Bopona bilongi te na tango ya kosambisa, boyoka bato nyonso : azala moto pamba to moto monene. Bobanga moto te, pamba te kosambisa ezali likambo ya Nzambe. Bomemela ngai likambo oyo eleki bino na makasi mpe ngai nakoyoka yango. » 18 Mpe na tango wana, nayebisaki bino makambo nyonso oyo bosengeli kosala.
19 Boye, ndenge Yawe, Nzambe na biso, atindaki biso, tolongwaki na ngomba Orebi mpe tokendeki na etuka ya bangomba ya bato ya Amori. Tokatisaki esobe monene mpe ya somo oyo bomonaki mpe tokomaki na Kadeshi-Barinea. 20 Nalobaki na bino :
22 Bato nyonso kati na bino bayaki epai na ngai mpe balobaki :
23 Likanisi yango emonanaki malamu na miso na ngai, yango wana naponaki kati na bino mibali zomi na mibale, mobali moko mpo na libota moko. 24 Balongwaki mpe bakendeki, bongo bamataki kino na etuka ya bangomba mpe bakomaki na lubwaku ya Eshikoli oyo banongaki. 25 Bakamataki na maboko na bango ndambo ya bambuma ya mokili wana mpe bamemelaki biso yango. Tala sango oyo bapesaki biso : « Mboka oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso ezali malamu. »
29 Nalobaki na bino : « Bozala na somo te mpe bobanga bango te, 30 pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali kotambola liboso na bino mpe akobunda mpo na bino ndenge asalaki na Ejipito, na miso ya bato nyonso. 31 Mpe na esobe, na banzela nyonso oyo botambolaki kino bokoma na esika oyo, bomonaki ndenge nini Yawe, Nzambe na bino, amemaki bino ndenge tata amemaka mwana na ye. »
32 Atako bongo, botiaki elikya te epai na Yawe, Nzambe na bino, 33 oyo azalaki kotambola liboso na bino na nzela mpo na kolukela bino esika ya kotonga molako. Na butu, azalaki lokola likonzi ya moto ; mpe na moyi, azalaki lokola likonzi ya lipata ; mpo na kolakisa bino nzela oyo bosengelaki kotambola.
34 Tango Yawe ayokaki nyonso oyo bozalaki koloba, asilikaki mpe alapaki ndayi : 35 « Moto moko te kati na molongo oyo ya bato mabe akoki komona mokili ya kitoko oyo nalakaki kopesa na bakoko na bango na nzela ya ndayi, 36 longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune ; ye akomona yango, mpe nakopesa na ye mpe na bakitani na ye, mokili oyo lokolo na ye enyataki, pamba te asalelaki Ngai Yawe na motema na ye mobimba. »
37 Likolo na bino, Yawe asilikelaki mpe ngai ; alobaki : « Yo mpe lisusu okokota te kati na mokili yango. 38 Kasi mosungi na yo Jozue, mwana mobali ya Nuni, ye akokota kati na yango. Lendisa ye, pamba te ye nde akokamba Isalaele mpo na kozwa mokili yango lokola libula. 39 Bongo, bana na bino oyo bolobaki ete bakomema bango na bowumbu, bana na bino oyo bayebi nanu te kokesenisa malamu mpe mabe, bango nde bakokota na mokili yango. Nakopesa bango mokili yango, mpe bakokamata yango. 40 Mpo na bino, bobaluka mpe bokende na esobe, na nzela ya ebale monene ya Barozo. »
41 Bozongiselaki ngai : « Tosali masumu epai na Yawe. Tokokende mpe tokobunda ndenge Yawe, Nzambe na biso, atindaki biso. » Boye, moto nyonso kati na bino alataki bibundeli na ye, mpe bokanisaki ete ezali likambo ya pasi te komata na etuka ya bangomba. 42 Kasi Yawe alobaki na ngai : « Yebisa bango ete bamata te mpe babunda te, pamba te nakozala elongo na bango te ; banguna na bango bakolonga bango. » 43 Nzokande nayebisaki bino, kasi boyokaki kaka te ; botombokelaki mitindo ya Yawe ; mpe, na lolendo na bino, bomataki na etuka ya bangomba. 44 Boye, bato ya Amori oyo bavandaka na bangomba yango bakitelaki bino mpe babundisaki bino, babenganaki bino lokola liboke ya banzoyi mpe balongaki bino longwa na Seiri kino na Orima. 45 Bozongaki mpe bolelaki liboso ya Yawe, kasi aboyaki koyoka kolela na bino, akangaki matoyi na Ye. 46 Bongo bovandaki na Kadeshi mikolo ebele.
Deteronomi 2 ->