1 Dariusi, moto ya Medi, akomaki mokonzi tango akokisaki mibu tuku motoba na mibale ya mbotama. 2 Dariusi amonaki ete ezali malamu kotia bayangeli nkama moko na tuku mibale mpo na kokamba mokili mobimba ya bokonzi. 3 Atiaki lisusu bakalaka misato ya lokumu lokola bakonzi na bango ; Daniele azalaki moko kati na bakalaka yango ya lokumu. Bazalaki kokamba misala ya bayangeli ya bituka mpo ete mokonzi anyokwama te. 4 Nzokande, Daniele amonisaki bokeseni kati na ye, bakalaka ya lokumu mpe bayangeli oyo mokonzi atiaki kati na bituka, mpo na mayele na ye oyo eleka ndelo. Boye, mokonzi akanisaki kotombola ye mpo ete akamba mokili na ye mobimba ya bokonzi. 5 Bakalaka ya lokumu mpe bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka bazalaki koluka likambo ya kofundela Daniele na ndenge na ye ya kotambolisa makambo ya bokonzi. Kasi balongaki te kozwa ata likambo moko to mbeba ya kofundela Daniele, mpo ete azalaki sembo mpe mpo ete, kati na ye, bazalaki komona ata libunga te to mbeba moko te ya kofundela ye. 6 Boye, bato yango balobaki :
7 Bakalaka ya lokumu mpe bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka bakendeki lisanga epai ya mokonzi mpe balobaki :
10 Boye, mokonzi Dariusi akomaki mokano oyo azwaki mpo ete babongola yango te mpe atiaki mokoloto na mokano yango.
11 Tango Daniele asosolaki ete sango ya mokano yango esili kopanzana, akotaki na ndako na ye, amataki na etaje mpe akotaki na shambre oyo maninisa na yango etala na ngambo ya Yelusalemi ; mbala misato na mokolo, azalaki kofukama mpo na kosambela mpe kopesa matondi epai ya Nzambe na ye, ndenge kaka azalaki kosala liboso. 12 Bongo, bato yango bakendeki lisanga mpe bakutaki Daniele azali kobondela mpe kosenga lisungi epai ya Nzambe na ye. 13 Mbala moko, bakendeki epai ya mokonzi mpo na kosolola na ye na tina na mokano oyo azwaki :
14 Balobaki lisusu na mokonzi :
15 Tango mokonzi ayokaki bongo, esalaki ye pasi makasi na motema ; boye azwaki mokano ya kokangola Daniele ; mpe kino na pokwa, azalaki kaka koluka ndenge nini kobikisa ye. 16 Kasi bato yango bakendeki lisusu lisanga epai ya mokonzi Dariusi mpe balobaki na ye :
17 Boye, mokonzi apesaki mitindo ete bamema Daniele mpe babwaka ye kati na libulu ya bankosi. Mokonzi alobaki na Daniele :
18 Bamemaki libanga moko ya monene mpe batiaki yango na monoko ya libulu ya bankosi. Mokonzi abetaki yango kashe na nzela ya lopete na ye mpe na nzela ya lopete ya bato na ye ya lokumu, mpo ete babongola eloko moko te na etumbu oyo bakateli Daniele. 19 Sima na yango, mokonzi azongaki na ndako na ye ; mpe, butu mobimba, aliaki te, avandaki elongo na bamakangu te mpe atikalaki kozwa pongi te.
20 Na tongo-tongo, mokonzi atelemaki mpe akendeki na lombangu na libulu ya bankosi. 21 Tango akomaki pene ya libulu yango, abengaki Daniele na mongongo ya mawa :
22 Daniele azongiselaki ye :
24 Mokonzi asepelaki makasi mpe apesaki mitindo ete babimisa Daniele wuta na libulu. Boye, babimisaki Daniele wuta na libulu mpe bamonaki ata pota moko te na nzoto na ye, pamba te azalaki na elikya na Nzambe na ye. 25 Mokonzi apesaki mitindo ete bamema bato oyo bafundaki Daniele mpe babwaka bango elongo na basi mpe bana na bango kati na libulu ya bankosi. Liboso ete bamikomela na se ya libulu, bankosi epumbwelaki bango mpe ebukaki bango mikuwa nyonso.
26 Bongo, mokonzi Dariusi akomelaki bato ya bikolo nyonso mpe ya nkota nyonso oyo bazalaki kovanda na mokili mobimba :
29 Daniele akomaki moto ya lokumu na tango Dariusi azalaki mokonzi mpe na tango ya Sirisi, mokonzi ya bato ya Persi.
<- Daniele 5Daniele 7 ->