1 Lokola bosekwaki mpe elongo na Klisto, bolukaka biloko ya Likolo epai wapi Klisto avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe, 2 bokanisaka biloko ya Likolo kasi biloko ya mokili te. 3 Pamba te bokufaki penza, mpe bomoi na bino ezali sik’oyo ya kobombama elongo na Klisto kati na Nzambe. 4 Tango Klisto oyo azali bomoi na bino akomonana, bino mpe bokomonana elongo na Ye kati na nkembo.
8 Kasi sik’oyo, bosengeli kolimwisa makambo yango nyonso : kanda, koyinana, misala mabe, mafinga mpe maloba mabe oyo ekoki kobima na minoko na bino. 9 Bokosanaka te, pamba te bobwakaki bomoto na bino ya kala elongo na misala na yango 10 mpe bolataki bomoto ya sika oyo emikomisaka ya sika mpo ete bokoma na boyebi ya kokoka kolanda elilingi ya Mokeli ya bomoto yango. 11 Boye, biso nyonso tozali ndenge moko : bokeseni ezali lisusu te kati na Mogreki mpe Moyuda, moto oyo akatama ngenga mpe moto oyo akatama ngenga te, mopaya mpe mwana mboka, mowumbu mpe monsomi. Bobele Klisto nde azali na tina : azali nyonso kati na bato nyonso.
12 Yango wana, lokola bozali baponami ya Nzambe, basantu mpe balingami na Ye, boyokelaka mingi bato mawa, bozalaka na bolingo, na boboto, na komikitisa mpe na motema molayi. 13 Boyikanaka mpiko ; mpe soki moko azali na likambo ya kopamela moninga na tina na yango, bolimbisanaka. Bolimbisaka ndenge Nkolo alimbisaki bino. 14 Na likolo ya makambo oyo nyonso, bolataka bolingo oyo ekangisaka nyonso kati na bomoko ya kokoka. 15 Tika ete kimia ya Klisto ekonzaka kati na mitema na bino, pamba te bozali biteni ya nzoto moko mpe Nzambe abenga bino mpo ete bozala na kimia yango ; mpe bozongisaka matondi.
16 Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino ; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino. 17 Mpe nyonso oyo bokosala, ezala na maloba to na misala, bosalaka yango na Kombo ya Nkolo Yesu, na kozongisa matondi epai ya Nzambe Tata na nzela ya Yesu-Klisto.
19 Mibali, bolingaka basi na bino mpe bozalaka na makambo ya makasi te epai na bango.
20 Bana, botosaka baboti na bino na makambo nyonso, pamba te ezali ndenge wana nde bokosepelisa Nkolo.
21 Batata, boyokisaka bana na bino kanda te, noki te mitema na bango ekolemba.
- a Na mikanda mosusu, babakisa : likolo ya batomboki.