3 Mokolo oyo elandaki, tosemaki na engumba Sidoni. Lokola Juliusi atalisaki bolingo monene epai ya Polo, apesaki ye nzela ya kokende kotala balingami na ye mpo ete akoka kozwa masungi epai na bango. 4 Sima na biso kolongwa wana, tozongelaki mobembo na biso mpe tozalaki konana pembeni-pembeni ya esanga ya Shipre, mpo na kokima mipepe oyo ezalaki kobeta biso makasi mpe kopekisa biso kokende liboso. 5 Sima na biso kokatisa ebale monene oyo eleka pembeni-pembeni ya Silisi mpe ya Pafili, tosemaki na Mira, kati na mokili ya Lisi. 6 Kuna, mokonzi ya basoda nkama moko amonaki masuwa moko ya engumba Alekizandri, oyo ezalaki kokende na Itali, mpe akotisaki biso kati na yango. 7 Masuwa yango ezalaki kotambola malembe penza ; boye tosalaki mikolo mwa mingi ya mobembo, mpe tokomaki na Sinide na pasi penza. Lokola mpe mopepe ezalaki kopekisa biso kokende liboso, tolekaki Salimoni mpe tokendeki na ngambo ya sude ya esanga ya Kreti. 8 Tozalaki konana pembeni-pembeni ya esanga yango na pasi penza kino tokomaki na esika oyo babengaka « Mabongo kitoko, » pene ya engumba Laseya.
9 Lokola tolekisaki bongo tango mingi mpe masuwa ekomaki kotambola na matata, pamba te ezalaki sima na eleko ya kokila bilei, Polo akebisaki bango :
11 Kasi mokonzi ya basoda nkama moko alandaki toli ya kapitene ya masuwa mpe ya nkolo masuwa, na esika ete ayoka maloba ya Polo. 12 Lokola mpe libongo ezalaki esika ya malamu te mpo na kolekisa tango ya malili makasi, mingi kati na bato bazwaki mokano ete tolongwa wana mpe toluka kokoma na Fenikisi oyo ezali libongo ya Kreti, oyo etala na ngambo ya sude-weste mpe ya nor-weste, mpo na kolekisa kuna tango yango ya malili makasi.
21 Sima na bato kosala mikolo ebele oyo baliaki lisusu te, Polo atelemaki liboso na bango mpe alobaki :
27 Na butu ya zomi na minei, masuwa ezalaki kaka komemama epai na epai kati na ebale monene Adriatiki. Na kati-kati ya butu, basali ya masuwa bakanisaki ete tokomi pene ya mokili ; 28 babwakaki singa mpo na komeka mozindo ya mayi mpe bamonaki ete mozindo ya mayi ezali na bametele pene tuku misato na sambo. Wana bapusanaki mwa liboso, bamekaki lisusu mpe bamonaki ete mozindo ya mayi ezali na bametele pene tuku mibale na mwambe. 29 Lokola bazalaki kobanga ete masuwa etutana na mabanga, babwakaki balongo minei na mayi wuta na sima ya masuwa, na posa makasi ya komona tongo kotana. 30 Kasi, lokola basali ya masuwa balingaki kokima, babandaki kokitisa kati na ebale monene mwa bwato oyo ebikisaka bato na tango ya likama, mpe basalaki lokola nde balingi kokende kokangisa balongo na liboso ya masuwa. 31 Polo alobaki na mokonzi ya basoda nkama moko mpe na basoda :
32 Boye, basoda bakataki basinga oyo esimbaki mwa bwato yango mpe batikaki yango kokweya na mayi.
33 Wana bazalaki kozela tongo kotana, Polo alendisaki bato nyonso ete balia ; alobaki :
35 Sima na ye koloba bongo, akamataki lipa mpe azongisaki matondi epai na Nzambe liboso na bango nyonso ; bongo akataki yango mpe abandaki kolia. 36 Bango nyonso balendisamaki mpe bakomaki kolia. 37 Kati na masuwa, tozalaki bato nkama mibale na tuku sambo na motoba. 38 Sima na bango kolia mpe kotonda mingi, babwakaki ble na ebale mpo na kokitisa kilo ya masuwa.
39 Tango tongo etanaki, bamonaki mokili te, kasi bamonaki kaka libongo moko ya zelo na suka, epai ebale ekota. Boye bazwaki mokano, soki bakolonga, ya kosemisa masuwa kuna. 40 Babwakaki balongo na ebale ; mpe kaka na tango yango, bafungolaki basinga ya yenda, batombolaki bakapo mpo ete mopepe emema masuwa na ngambo ya libongo ya zelo. 41 Kasi masuwa ekendeki kotutana na zelo ya ebale mpe ekangamaki. Wana eteni ya liboso ya masuwa ekangamaki na zelo mpe ezalaki lisusu koningana te, eteni ya sima ya masuwa epanzanaki na nguya ya bambonge.
42 Basoda bazwaki likanisi ya koboma bakangami mpo bazalaki kobanga ete bakatisa mayi mpe bakima. 43 Kasi lokola mokonzi ya basoda nkama moko azalaki na posa ya kobikisa Polo, apekisaki bango kokokisa likanisi na bango. Boye, atindaki bato oyo bayebaki kokata mayi ete bazala bato ya liboso ya kokweya na mayi mpe bakende na mokili. 44 Bamosusu basengeli kolanda bango na kodiembela na mabaya to na biteni ya masuwa. Ezali ndenge wana nde bato nyonso bakomaki malamu na mokili.
<- Misala ya Bantoma 26Misala ya Bantoma 28 ->- a Erakiloni ezali mopepe moko ya makasi penza oyo ewutaka na ngambo ya nor-este.