5 Ezali mpe ndenge moko mpo na moto oyo azali kosala lisano ya kokima mbangu : akoki te kozwa motole soki akimi mbangu te kolanda mibeko ya lisano. 6 Moloni elanga oyo asalaka makasi asengeli kozala moto ya liboso mpo na kobuka bambuma. 7 Kanisaka malamu na tina na makambo oyo nazali koloba, mpe Nkolo akopesa yo makoki ya kososola yango nyonso.
8 Kanisaka Yesu-Klisto, mokitani ya Davidi, oyo asekwaki kati na bakufi, kolanda Sango Malamu oyo nateyaka. 9 Ezali mpe mpo na Sango Malamu yango nde nazali komona pasi kino bakanga ngai minyololo lokola mobomi, kasi bakangi Liloba na Nzambe minyololo te. 10 Yango wana nazali koyikela makambo nyonso mpiko mpo na bolamu ya bato oyo Nzambe apona, mpo ete bango mpe bazwa lobiko oyo ezali kati na Yesu-Klisto, elongo na nkembo ya seko.
11 Maloba oyo ezali ya solo :
20 Kati na ndako ya monene, ezalaka kaka te na basani ya wolo mpe ya palata, kasi ezalaka mpe na basani oyo basala na nzete to na mabele. Basani ya wolo mpe ya palata ezalaka mpo na koyamba bato ya lokumu, kasi basani ya nzete mpe ya mabele ezalaka mpo na misala ya bongo na bongo.
21 Soki moto amibateli peto na makambo nyonso oyo nawuti koloba, akozala lokola sani oyo babongisi mpo na koyamba bato ya lokumu, akozala bule, moto na tina mpo na Nkolo mpe moto oyo babongisi mpo na misala nyonso ya malamu.
22 Kima baposa mabe ya bolenge mpe luka bosembo, kondima, bolingo mpe kimia elongo na bato oyo babelelaka Nkolo na motema ya peto.
23 Kima masolo ya tembe ya bozoba mpe ezanga tina, pamba te oyebi malamu ete esukaka kaka na koswana. 24 Mpe ezali malamu te mpo na mosali ya Nkolo kozala moto oyo aswanaka na bato, kasi asengeli nde kozala moto ya boboto epai ya bato nyonso, moto oyo azali na makoki ya kopesa malakisi, ya kokanga motema 25 mpe ya koteya na boboto bato oyo babendanaka na ye ; asengeli kozala na elikya ete Nzambe akosalela bango ngolu ya kobongola mitema mpo ete bayeba solo. 26 Bongo bakozongela mayele na bango ya malamu mpe bakolongwa na motambo ya Satana oyo akanga bango na boloko mpo ete basala kaka mokano na ye.
<- 2 Timote 12 Timote 3 ->