1 Yawe asikelaki lisusu bato ya Isalaele mpe atindikaki Davidi na kosala makambo oyo ekomemisa bango ngambo ; alobaki na Davidi : « Kende kotanga motango ya bato ya Isalaele mpe ya Yuda. »
2 Boye, mokonzi apesaki mitindo na Joabi, mokonzi ya mampinga, oyo azalaki elongo na ye :
3 Kasi Joabi azongiselaki mokonzi :
4 Kasi mokonzi atingamaki kaka na mitindo oyo apesaki na Joabi mpe na bakonzi ya mampinga. Boye, balongwaki liboso ya mokonzi mpe bakendeki kotanga bato ya Isalaele. 5 Bakatisaki Yordani mpe babandaki na kotanga bato ya engumba Aroeri, na sude ya engumba oyo ezali kati na lubwaku. Bakatisaki lisusu etuka ya Gadi na nzela oyo ekenda na Yaezeri. 6 Longwa kuna, balekaki na etuka ya Galadi mpe ya Tayitimi-Odishi kino bakomaki na Dani Yaani mpe zingazinga ya Sidoni. 7 Bakendeki na ndako batonga makasi ya Tiri mpe na bingumba nyonso ya bato ya Evi mpe ya Kanana ; bongo bakomaki na sude ya etuka ya Yuda, na Beri-Sheba. 8 Boye batambolaki mboka mobimba, mpe bazongaki na Yelusalemi sima na basanza libwa mpe mikolo tuku mibale. 9 Joabi ayebisaki mokonzi motango ya bato oyo atangaki, bato oyo bakoki kosalela mopanga na bitumba : bato nkoto nkama mwambe kati na Isalaele, mpe nkoto nkama mitano kati na Yuda.
11 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, tango Davidi alamukaki, Yawe alobaki na mosakoli Gadi, mopesi toli ya mokonzi :
13 Gadi akendeki koyebisa Davidi makambo oyo Yawe alobaki na ye :
14 Davidi azongiselaki Gadi :
15 Boye, Yawe atindaki kati na Isalaele bokono oyo ebomaka, wuta na tongo kaka wana kino na ngonga oyo akataki ; mpe longwa na Dani kino na Beri-Sheba, bato nkoto tuku sambo bakufaki. 16 Lokola anjelu atandaki loboko na ye na likolo ya Yelusalemi mpo na kobebisa yango, Yawe atalaki mpe ayokaki mawa mpo na pasi wana. Alobaki na anjelu oyo azalaki kobebisa : « Ekoki ! Longola loboko na yo ! »
17 Wana Davidi atombolaki miso mpe amonaki anjelu na Yawe koboma bato, alobaki na Yawe : « Ngai nde nasalaki masumu, ngai nde nasalaki mbeba ; bango, bato ya ekolo na ngai, basali mabe moko te ; boye, ebongi nde opesa ngai mpe libota na ngai etumbu ! »
18 Kaka na mokolo yango, Gadi akendeki epai ya Davidi mpe alobaki na ye :
19 Davidi akendeki kuna kolanda liloba oyo Gadi alobaki na Kombo na Yawe. 20 Tango Orina atalaki mpe amonaki mokonzi elongo na bakalaka na ye koya epai na ye, abimaki mpe agumbamaki liboso ya mokonzi, elongi kino na mabele. 21 Orina atunaki mokonzi :
22 Orina azongiselaki Davidi :
24 Kasi mokonzi alobaki na Orina :
25 Davidi atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe mpe abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Yawe ayokelaki mboka mawa, mpe bokono oyo ezalaki koboma elongwaki na Isalaele.
<- 2 Samuele 23