2 Bato nyonso ya Isalaele bakimaki Davidi mpo na kolanda Sheba, mwana mobali ya Bikiri. Kasi bato ya Yuda batikalaki pembeni ya mokonzi na bango, na nzela mobimba, longwa na Yordani kino na Yelusalemi.
3 Tango mokonzi Davidi azongaki na ndako na ye, na Yelusalemi, azwaki bamakangu na ye zomi oyo atikaki mpo na kokengela ndako, mpe atiaki bango kati na ndako moko oyo bazalaki kokengela malamu. Atako azalaki kosunga bango, kasi akendeki te kosangisa na bango nzoto. Bazalaki kokengela bango kino na mokolo na bango ya kufa, mpe bazalaki lokola basi bakufisa mibali.
4 Mokonzi alobaki na Amasa : « Bengela ngai bato nyonso ya Yuda na mikolo misato, yo moko mpe zala awa. »
5 Kasi tango Amasa akendeki kobenga bato ya Yuda, azwaki tango molayi koleka oyo mokonzi apesaki ye. 6 Davidi ayebisaki Abishayi : « Sheba, mwana mobali ya Bikiri, akomonisa biso pasi mingi koleka Abisalomi. Kamata basali ya mokonzi mpe landa ye, noki te akomona bingumba batonga makasi mpe akokima biso. »
7 Boye na bokambami ya Abishayi, bato ya Joabi, bato ya Kereti, bato ya Peleti mpe basoda nyonso ya mpiko, babimaki na Yelusalemi mpo na kolanda Sheba, mwana mobali ya Bikiri.
8 Tango bakomaki na libanga monene kati na Gabaoni, Amasa ayaki kokutana na bango. Joabi alataki bilamba na ye ya basoda : na loketo na ye, alataki mokaba oyo kati na yango atiaki mopanga oyo ezalaki kati na ebombelo na yango na loketo. Bongo tango abandaki kopusana, mopanga yango ekweyaki.
9 Joabi alobaki na Amasa : « Boni ndeko na ngai ya mobali, ozali malamu ? »
11 Moto moko kati na bato ya Joabi atelemaki pembeni ya Amasa mpe alobaki : « Tika ete bato nyonso oyo bazali mpo na Joabi mpe mpo na Davidi balanda Joabi ! »
12 Nzokande, wana Amasa azalaki kobaluka kati na makila na ye na kati-kati ya nzela, moto yango amonaki ete mampinga nyonso bayaki kotelema wana. Boye abendaki Amasa libanda ya nzela, atandaki ye kati na elanga mpe afinikaki ye elamba. 13 Sima na ye kolongola Amasa na nzela, bato nyonso bakendeki elongo na Joabi mpo na kolanda Sheba, mwana mobali ya Bikiri.
14 Mpo na kokoma na Abele-Beti-Maaka, Sheba akatisaki bikolo nyonso ya Isalaele mpe etuka mobimba ya bato ya Berimi oyo mpe basanganaki mpe balandaki Joabi. 15 Joabi elongo na mampinga na ye nyonso bazingelaki Sheba kati na Abele-Beti-Maaka mpe batongaki na libanda ya engumba mwa ngomba oyo ekomaki na molayi ya mir. Tango bazalaki kotimola mabele mpo na koluka kokweyisa mir, 16 mwasi moko ya bwanya agangaki wuta na engumba : « Boyoka ! Boyoka ! Boyebisa Joabi ete aya awa mpo ete naloba na ye. »
17 Joabi apusanaki pene na ye, mpe mwasi yango atunaki ye :
18 Mwasi yango akobaki koloba :
20 Joabi azongisaki :
22 Bongo mwasi akendeki epai ya bato nyonso mpe ayebisaki bango maloba na ye ya bwanya. Boye bakataki moto ya Sheba, mwana mobali ya Bikiri, mpe babwakelaki yango Joabi. Bongo Joabi abetaki kelelo, mpe bato na ye bapanzanaki liboso ya engumba ; moto na moto azongaki na ndako na ye. Joabi mpe azongaki na Yelusalemi epai ya mokonzi.