2 Boye Davidi akendeki kuna elongo na basi na ye mibale : Ayinoami, moto ya Jizireyeli ; mpe Abigayili, mwasi oyo akufisaki mobali na ye ya liboso, Nabali, moto ya Karimeli. 3 Davidi amemaki lisusu mibali oyo bazalaki elongo na ye, moko na moko elongo na libota na ye ; mpe bavandaki na bingumba ya Ebron mpe na bamboka na yango ya mike. 4 Bongo bato ya Yuda bayaki na Ebron mpe bapakolaki kuna Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya libota ya Yuda.
12 Abineri, mwana mobali ya Neri, elongo na bato ya Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, babimaki wuta na Maanayimi mpo na kokende na Gabaoni. 13 Joabi, mwana mobali ya Tseruya, elongo na basali ya Davidi, bango mpe babimaki mpe bakutanaki na bato ya Abineri pene ya liziba ya Gabaoni : bamoko bazalaki na ngambo moko ya liziba, mpe bamosusu, na ngambo mosusu. 14 Abineri alobaki na Joabi :
15 Boye, wana batelemaki mpe batangaki bango, emonanaki motango oyo : zomi na mibale mpo na libota ya Benjame mpe Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo ; mpe zomi na mibale kati na basali ya Davidi. 16 Moko na moko asimbaki monguna na ye na moto mpe atobolaki ye mopanga na mopanzi ; mpe bango nyonso bakweyaki nzela moko. Bongo babengaki esika yango ya Gabaoni : Elikati-Atsurimi[a].
17 Etumba ya mokolo wana ezalaki makasi penza. Basali ya Davidi balongaki Abineri elongo na bato ya Isalaele. 18 Bana mibali misato ya Tseruya bazalaki wana : Joabi, Abishayi mpe Asaeli. Asaeli azalaki mbangu lokola mboloko ya zamba. 19 Asaeli alandaki Abineri na molende penza mpe atikalaki kobaluka te, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to ya loboko ya mwasi. 20 Tango Abineri abalukaki mpo na kotala na sima, atunaki :
21 Abineri alobaki na ye :
23 Kasi lokola Asaeli aboyaki kotika kolanda ye, Abineri atubaki Asaeli songe ya likonga na ye na libumu ; mpe likonga ebimaki ye na mokongo. Asaeli akweyaki mpe akufaki wana. Moto nyonso oyo azalaki kokoma na esika oyo Asaeli akweyaki mpe akufaki azalaki kotelema.
24 Joabi mpe Abishayi balandaki Abineri ; mpe wana moyi ezalaki kolala, bakomaki na etando ya Ama oyo etalani na Guya, na nzela oyo ekenda na esobe ya Gabaoni. 25 Bato ya Benjame basanganaki sima na Abineri, basalaki lisanga mpe batelemaki na songe ya ngomba moko ya moke. 26 Abineri abelelaki na Joabi :
27 Joabi azongisaki :
28 Boye Joabi abetaki kelelo, mpe bato nyonso batelemaki, batikaki kolanda Isalaele mpe babundaki lisusu te.
29 Na butu wana nyonso, Abineri mpe bato na ye nyonso batambolaki na etando ya Araba, balekaki Yordani, bakatisaki Bitironi mobimba mpe bakomaki na Maanayimi. 30 Joabi atikaki kolanda Abineri mpe azongaki, asangisaki bato na ye nyonso : emonanaki ete bato ya Davidi zomi na libwa kaka nde bazangaki, bakisa Asaeli. 31 Kasi bato ya Davidi babomaki bato ya Benjame nkama misato na tuku motoba oyo bazalaki elongo na Abineri. 32 Bakamataki Asaeli mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye, na Beteleemi. Bongo Joabi mpe bato na ye batambolaki butu mobimba mpe bakomaki na Ebron na tongo-tongo.
<- 2 Samuele 12 Samuele 3 ->- a Elikati-Atsurimi elakisi : Esika ya bambeli.