4 Yango nde elikya oyo tozali na yango kati na Nzambe, na nzela ya Klisto. 5 Tosengeli te kokanisa ete ezali na ndenge na biso moko nde tozwi makoki ya kosala likambo songolo ; te, makoki na biso ewutaka nde na Nzambe. 6 Ezali Nzambe nde apesaki biso makoki ya kozala basali ya Boyokani ya sika oyo evandisami na Mibeko te kasi na Molimo ; pamba te Mibeko ebomaka, kasi Molimo apesaka bomoi.
9 Pamba te, soki lotomo oyo ememelaki bato etumbu ezalaki na nkembo, ndenge nini lotomo oyo esalaki ete Nzambe akomisa bato sembo eleka na nkembo te ? 10 Tokoki ata koloba ete nkembo ya kala ebungisa kongenga na yango liboso ya nkembo ya sika oyo eleki penza monene. 11 Mpe soki oyo esengelaki kosila ezalaki na nkembo, ndenge nini nkembo ya oyo ekowumelaka seko na seko eleka monene te ?
12 Lokola tozali na elikya ya lolenge oyo, tozali na bobangi te ; 13 tozali te lokola Moyize oyo azalaki kosalela vwale mpo na kozipa elongi na ye, mpo na kopekisa bana ya Isalaele kotala suka ya nkembo oyo esengeli kosila.
14 Kasi mayele na bango ekomaki bozoba. Kino na mokolo ya lelo, tango batangaka mikanda ya Boyokani ya Kala, vwale yango ezalaka kaka, elongwe nanu te kati na bango, pamba te elongwaka kaka kati na Klisto.
15 Solo, kino na mokolo ya lelo, tango nyonso bana ya Isalaele batangaka mikanda ya Moyize, vwale moko ezipaka mitema na bango. 16 Kasi tango nyonso moto abalukaka epai ya Nkolo, vwale yango elongwaka. 17 Sik’oyo, Nkolo azali Molimo ; mpe epai Molimo ya Nkolo azali, epai mpe bonsomi ezali. 18 Mpe biso nyonso oyo bilongi na biso ezipama te, biso oyo tomonisaka nkembo ya Nkolo, tozwaka elilingi na Ye kati na nkembo oyo kongenga na yango ebakisamaka se kobakisama. Nyonso wana ezali mosala ya Nkolo oyo azali Molimo.
<- 2 Bakolinto 22 Bakolinto 4 ->