4 Solo, atako babakaki Ye na ekulusu kati na bolembu, kasi azali na bomoi na nzela ya nguya ya Nzambe. Biso mpe ndenge moko : tozali na bolembu kati na Ye, kasi tokomilakisa bato ya bomoi elongo na Ye na nzela ya nguya ya Nzambe, na lolenge na biso ya kosala mpo na bolamu na bino.
5 Bomimeka bino moko mpe botala soki bozali kati na kondima ; bomitala penza bino moko malamu. Boyebi te ete Yesu-Klisto azali kati na bino ? Loba ete bosila kokweya liboso ya komekama.
6 Kasi nazali na elikya : bokoyeba solo ete biso tokweyaki te liboso ya komekama. 7 Sik’oyo, tozali kobondela Nzambe mpo ete bosala mabe ata moko te ; ezali te mpo bato bamona ete biso tolonga komekama, kasi mpo ete bino bosala bolamu, mpe biso tomonana lokola bato oyo balonga te. 8 Pamba te tozali na nguya te ya kotelemela solo, kasi tozali kaka na nguya ya kokokisa yango. 9 Tozali na esengo ya kozala na bolembu, kasi bino bozali makasi ; mpe tosengaka na Nzambe kati na mabondeli na biso ete bokoma bato ya kokoka. 10 Yango wana, nazali kokomela bino makambo yango nyonso, awa nazali nanu mosika na bino, mpo ete, tango nakoya, bomona ngai te lokola moto ya makambo makasi na lolenge na ngai ya kosalela bokonzi oyo Nkolo apesaki ngai mpo na kolendisa kondima na bino, kasi mpo na kokweyisa yango te.