1 Joziasi azalaki na mibu mwambe ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku misato na moko na Yelusalemi. 2 Asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe mpe alandaki banzela oyo Davidi, tata na ye, atambolaki na yango : apengwaki na yango te, ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to na ngambo ya loboko ya mobali.
3 Na mobu ya mwambe ya bokonzi na ye, lokola azalaki nanu elenge, akomaki koluka Nzambe ya Davidi, tata na ye ; bongo na mobu ya zomi na mibale, akomaki kopetola Yuda mpe Yelusalemi na kopekisa bato kokende na bisambelo ya likolo ya bangomba, na kobuka makonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera elongo na bikeko ya banzambe basala na nzete mpe na bibende oyo banyangwisa na moto. 4 Babukaki liboso na ye bitumbelo ya banzambe Bala, bakweyisaki mbala moko bitumbelo malasi oyo ezalaki na likolo na yango, abukaki makonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera, bikeko ya banzambe basala na nzete mpe na bibende oyo banyangwisa na moto ; akomisaki yango putulu mpe asopaki putulu yango na likolo ya bakunda ya bato oyo babonzelaki banzambe yango bambeka. 5 Atumbaki mikuwa ya banganga-nzambe ya bikeko na likolo ya bitumbelo na yango. Ezalaki ndenge wana nde apetolaki Yuda mpe Yelusalemi. 6 Abukaki bitumbelo kati na bingumba ya Manase, ya Efrayimi, ya Simeoni kino na Nefitali mpe na bamboka na yango ya zingazinga. 7 Abukaki makonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera elongo na bikeko ya banzambe mpe akomisaki yango putulu. Akweyisaki lisusu bitumbelo malasi nyonso kati na mokili mobimba ya Isalaele. Bongo, azongaki na Yelusalemi.
8 Tango Joziasi akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, mpo na kopetola mokili mpe Tempelo, atindaki Shafani, mwana mobali ya Atsalia ; Maaseya, moyangeli ya engumba ; mpe Yoa, mwana mobali ya Yoakazi mpe mobombi mikanda, mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe, Nzambe na ye. 9 Bakendeki epai ya Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe bapesaki ye mbongo oyo bazwaki na Tempelo ya Nzambe, mbongo oyo Balevi oyo bazalaki kokengela ekotelo bakongolaki lokola makabo mpo na Tempelo na maboko ya bato ya Manase, ya Efrayimi, ya batikali ya Isalaele, ya bato nyonso ya Yuda, ya Benjame mpe ya bavandi ya Yelusalemi. 10 Bapesaki mbongo yango na maboko ya batambolisi misala ya Tempelo ya Yawe. Bato yango bafutaki basali oyo bazalaki kobongisa mpe kolendisa Tempelo yango ; 11 bapesaki lisusu epai ya basharipantie mpe batongi Tempelo mpo ete basomba mabanga bakata elongo na mabaya mpo na motondo, mpe mpo ete batonga bandako mosusu oyo bakonzi ya Yuda bazalaki kobongisa te tango ezalaki kobeba.
12 Bato yango basalaki mosala na bango na boyengebene mpe na bokambami ya Balevi Yaati mpe Abidiasi, bana mibali ya Merari. Zakari mpe Meshulami, bana mibali ya Keati, nde bazalaki kokengela mosala na bango. 13 Balevi yango bayebaki mpe kobeta mindule ; bazalaki kokengela bato oyo bazalaki komema biloko ya mosala mpe kokamba ba-oyo nyonso bazalaki kosala misala na bisika nyonso oyo mosala ezalaki kosalema. Balevi mosusu bazalaki bakomi mikanda, balakisi ya Mobeko mpe bakengeli bikuke.
14 Tango bazalaki kobimisa mbongo oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe, Nganga-Nzambe Ilikia amonaki buku ya Mobeko ya Yawe, oyo epesamaki na nzela ya Moyize. 15 Ilikia alobaki na Shafani, mokomi mikanda :
16 Shafani azwaki buku yango, amemaki yango epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye :
18 Mokomi mikanda, Shafani, alobaki na mokonzi :
19 Tango mokonzi ayokaki maloba ya Mobeko, apasolaki bilamba na ye, 20 apesaki mitindo oyo epai ya Ilikia, epai ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani ; epai ya Abidoni, mwana mobali ya Mishe ; epai ya Shafani, mokomi mikanda, mpe epai ya Asaya, moko kati na bakalaka ya mokonzi :
22 Ilikia elongo na bato oyo mokonzi aponaki bakendeki epai ya mwasi mosakoli Ulida, mwasi ya Shalumi, mwana mobali ya Tokeati, mwana mobali ya Asira, mobombi bilamba ya Tempelo. Ulida azalaki kovanda na Yelusalemi, na etuka ya sika. Balobaki na ye ndenge bayokanaki. 23 Ulida alobaki na bango :
29 Mokonzi Joziasi abengisaki bampaka nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi. 30 Bongo akendeki na Tempelo ya Yawe elongo na bato nyonso ya Yuda, bavandi nyonso ya Yelusalemi, Banganga-Nzambe, Balevi, bato nyonso, kobanda na oyo aleki na lokumu kino na oyo aleki na se. Mokonzi atangelaki bango makomi nyonso ya buku ya Boyokani oyo emonanaki kati na Tempelo ya Yawe. 31 Mokonzi atelemaki na etemelo na ye ya kolobela mpe asalaki boyokani oyo liboso ya Yawe :
32 Mokonzi alapisaki ndayi yango bato nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi mpe kati na etuka ya Benjame. Mpe bavandi ya Yelusalemi batambolaki kolanda boyokani ya Nzambe, Nzambe ya batata na bango.