6 Na etinda ya mokonzi, bamemi sango bakendeki kati na Isalaele mobimba mpe Yuda, na mikanda oyo ewutaki epai ya mokonzi mpe bakalaka na ye. Tala makambo oyo ezalaki kati na mikanda yango :
10 Bamemi sango batambolaki kati na bingumba nyonso ya Efrayimi mpe ya Manase kino na Zabuloni. Kasi bato bazalaki koseka mpe kotiola bango. 11 Nzokande, ndambo ya bato ya Aseri, ya Manase mpe ya Zabuloni bamikitisaki mpe bakendeki na Yelusalemi. 12 Kati na mokili ya Yuda, loboko ya Nzambe ezalaki kosala na nguya makasi epai ya bato, mpo na kopesa bango bomoko na molimo mpo na kotosa mitindo ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye, kolandisama na Liloba na Yawe.
13 Bato ebele basanganaki na Yelusalemi mpo na kosepela feti ya Mapa ezanga levire, na sanza ya mibale : bazalaki penza ebele ya bato. 14 Babukaki bitumbelo kati na Yelusalemi mpe balimwisaki bambabola nyonso ya malasi na kobwaka yango na lubwaku ya Sedron. 15 Bakataki kingo ya mpate mpo na mbeka ya Pasika na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya mibale. Banganga-Nzambe elongo na Balevi bayokaki soni, bamibulisaki mpe babonzaki bambeka ya kotumba kati na Tempelo ya Yawe. 16 Bazongelaki misala na bango ndenge ekomama na mibeko ya Moyize, moto na Nzambe. Balevi bazalaki kopesa makila ya bambeka epai ya Banganga-Nzambe ; mpe bango, Banganga-Nzambe, bazalaki kosopa yango na etumbelo. 17 Lokola bato mingi kati na lisanga bamibulisaki te, Balevi bazwaki mokumba ya kokata bakingo ya bampate ya Pasika mpo na bato wana nyonso oyo bazalaki peto te ; mpe na bongo, bakokaki te kobulisa bampate na bango epai na Yawe. 18 Atako bato ebele oyo bawutaki na Manase, na Efrayimi, na Isakari mpe na Zabuloni bamipetolaki te, kasi baliaki Pasika na kozanga kolanda oyo ekomama. Yango wana Ezekiasi abondelaki boye mpo na bango :
20 Yawe ayokaki libondeli ya Ezekiasi mpe abetaki bato te. 21 Boye bato ya Isalaele oyo bazalaki na Yelusalemi basepelaki mikolo sambo mpe na esengo makasi feti ya Mapa ezanga levire wana Balevi mpe Banganga-Nzambe bazalaki kokumisa Yawe mikolo nyonso na kobeta makasi bibetelo mindule na bango mpo na lokumu ya Yawe. 22 Ezekiasi alendisaki Balevi nyonso oyo balakisaki ete bayebi malamu mosala ya Yawe.
23 Lisanga mobimba eyokanaki kobakisa mikolo mosusu sambo mpo na kokoba kosepela feti. Boye, basalaki feti na esengo na mikolo yango sambo. 24 Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, apesaki mpo na lisanga bangombe ya mibali nkoto moko, bameme mpe bantaba nkoto sambo ; mpe bakalaka bapesaki mpo na lisanga bangombe ya mibali nkoto moko, bameme mpe bantaba nkoto zomi. Banganga-Nzambe ebele bamibulisaki. 25 Lisanga mobimba ya Yuda, Banganga-Nzambe, Balevi, bato nyonso ya Isalaele mpe bapaya oyo bawutaki na Isalaele to bavandi ya Yuda bazalaki na esengo. 26 Esengo ezalaki makasi kati na Yelusalemi, pamba te wuta na tango ya Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele, likambo ya boye etikala nanu kosalema te kati na Yelusalemi. 27 Banganga-Nzambe mpe Balevi batelemaki mpo na kopambola bato, mpe Nzambe ayokaki bango mpo ete losambo na bango ekomaki kino na Likolo, evandelo na Ye ya bule.
<- 2 Masolo ya Kala 292 Masolo ya Kala 31 ->