3 Jozafati abangaki makasi ; azwaki mokano ya kotuna toli ya Yawe mpe akataki ete mokili mobimba ya Yuda ekila bilei. 4 Bato ya Yuda oyo bawutaki na bingumba nyonso ya Yuda basanganaki mpo na koluka Yawe. 5 Jozafati atelemaki kati na lisanga ya Yuda mpe ya Yelusalemi, kati na Tempelo ya Yawe, liboso ya lopango ya sika. 6 Asambelaki :
13 Bato nyonso ya Yuda elongo na mabota nyonso, basi mpe bana na bango, batelemaki liboso ya Yawe. 14 Bongo Molimo na Yawe akitelaki, kati na lisanga, Yaazieli, mwana mobali ya Zakari, mwana ya mobali ya Benaya, mwana mobali ya Yeyeli mpe mwana mobali ya Matania, Molevi mpe moko kati na bakitani ya Azafi. 15 Yaazieli alobaki : « Bino bavandi nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi, mpe yo mokonzi Jozafati, boyoka ! Tala makambo oyo Yawe azali koloba na bino : ‹ Bobanga te mpe bolenga te liboso ya mampinga minene oyo, pamba te bitumba ezali ya bino te kasi ezali ya Nzambe. 16 Lobi, bokende kobundisa bango. Bakomata ngomba Atsize, mpe bino bokokutana na bango na suka ya lubwaku, liboso ya esobe ya Yerueli. 17 Bokobunda bitumba ata moke te : bomibongisa kaka na bisika na bino, botelema mpe botala elonga oyo Yawe akopesa bino. Bino bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bobanga te mpe bolenga te ! Lobi, bokende kokutana na bango ; mpe Yawe akozala elongo na bino ! › »
18 Jozafati agumbamaki elongi kino na mabele, mpe bato nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bafukamaki mpo na kogumbamela Yawe. 19 Balevi kati na bato ya Keati mpe ya Kore batelemaki mpo na kokumisa Yawe, Nzambe ya Isalaele, na mongongo makasi.
20 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bakendeki na esobe ya Tekoa. Na tango ya kokende, Jozafati atelemaki mpe alobaki : « Bino, bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi, boyoka ngai ! Botia elikya na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokolendisama ! Bondimela basakoli na Ye, mpe bokolonga ! »
21 Sima na ye kosolola na bato, Jozafati aponaki bayembi, atiaki bango liboso ya mampinga ya basoda, mpo na kokumisa Yawe mpe kotombola nkembo ya bosantu na Ye. Mpe batambolaki liboso ya mampinga ya basoda na koyemba :
22 Tango kaka babandaki koyemba mpe kokumisa, Yawe atiaki mobulu kati na bato ya Amoni, ya Moabi mpe ya bangomba Seiri oyo bakotaki na Yuda, mpe babomanaki bango na bango. 23 Bato ya Amoni mpe ya Moabi batelemaki mpo na kobundisa, koboma mpe kobebisa bavandi ya bangomba Seiri. Tango basilisaki koboma bavandi ya Seiri, bakomaki kobomana bango na bango.
24 Tango bato ya Yuda bayaki na esika ya kotalela esobe na mosika, batalaki na ngambo ya mampinga minene ya banguna mpe bamonaki kaka bibembe elali na mabele : moko te abikaki.
25 Jozafati elongo na bato na ye bakendeki kozwa bomengo ya bitumba ; mpe bamonaki bibembe ebele, biloko ebele, bilamba ebele mpe biloko ebele ya talo. Balokotaki biloko ebele oyo bakokaki ata komema te. Basalaki mikolo misato mpo na kozwa yango, pamba te bomengo ya bitumba ezalaki ebele penza. 26 Na mokolo ya minei, basanganaki na lubwaku ya Beraka epai wapi bapambolaki Yawe. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango lubwaku ya Beraka[a].
27 Na bokambami ya Jozafati, bato nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bazongaki na esengo na Yelusalemi, pamba te Yawe atondisaki bango na esengo wana akangolaki bango na maboko ya banguna na bango. 28 Bakotaki na Yelusalemi na lokito ya makembe, ya mandanda mpe ya bakelelo, mpe bakendeki na Tempelo ya Yawe. 29 Somo ya Nzambe ekangaki bikolo nyonso ya mokili tango bayokaki sango ete Yawe abundisi banguna ya Isalaele. 30 Bokonzi ya Jozafati ezwaki kimia, pamba te Nzambe na ye apesaki ye bopemi na bangambo nyonso.
31 Jozafati, mwana mobali ya Asa, akonzaki Yuda ; azalaki na mibu tuku misato na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi ya Yuda, mpe akonzaki mibu tuku mibale na mitano na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Azuba. » Azuba azalaki mwana mwasi ya Shili. 32 Jozafati alandaki nzela oyo Asa, tata na ye, atambolaki na yango ; apengwaki na yango ata moke te mpe asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe. 33 Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba ; mpe bato babongisaki nanu te mitema na bango mpo na kokangama na Nzambe ya bakoko na bango.
34 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jozafati, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya masolo ya Jewu, mwana mobali ya Anani ; mpe masolo yango ezali kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
35 Sima na yango, Jozafati, mokonzi ya Yuda, asalaki boyokani elongo na Akazia, mokonzi ya Isalaele, oyo etamboli na ye ezalaki mabe na miso ya Nzambe. 36 Basanganaki bango mibale mpo na kotonga bamasuwa oyo esengelaki kokende na Tarsisi. Sima na kotonga bamasuwa na Etsioni-Geberi, 37 Eliezeri, mwana mobali ya Dodavawu, moto ya Maresha, asakolaki mpo na kotelemela Jozafati ; alobaki : « Lokola osali boyokani elongo na Akazia, Yawe akobebisa misala na yo. »
- a Beraka elingi koloba : mapamboli.