1 Tango Jozafati, mokonzi ya Yuda, azongaki mobimba na ndako na ye na Yelusalemi, 2 mosakoli Jewu, mwana mobali ya Anani, akendeki kokutana na ye. Alobaki na mokonzi Jozafati : « Mpo na nini kosunga moto mabe mpe kolinga bato oyo bayinaka Yawe ? Mpo ete osali bongo, kanda makasi ya Yawe ezali likolo na yo. 3 Kasi atako bongo, makambo malamu emonani kati na yo, pamba te olongolaki makonzi ya nzambe Ashera mpe obongisaki motema na yo mpo na koluka Nzambe. »
8 Kati na Yelusalemi, Jozafati aponaki Balevi, Banganga-Nzambe mpe bakambi ya mabota ya Isalaele mpo na kosambisa kolanda Mibeko ya Yawe mpe kokata makambo ya bavandi ya Yelusalemi. 9 Apesaki bango mitindo oyo : « Bosengeli kosala na boyengebene, na motema mobimba mpe na botosi epai na Yawe. 10 Tango nyonso likambo ekowuta epai na bandeko na bino oyo bavandaka na engumba mpe ekokoma liboso na bino, ezala ya koboma to ya kobuka mibeko, mitindo, bikateli to malako, bosengeli kokebisa bango ete basala masumu te liboso ya Yawe ; soki te, kanda na Ye ekokweyela bino mpe bandeko na bino. Bosala bongo mpe bokozala na pamela te. 11 Amaria, mokonzi ya Banganga-Nzambe, akozala mokambi na bino mpo na makambo nyonso oyo etali Yawe ; mpe Zebadia, mwana mobali ya Isimaeli, mokonzi ya libota ya Yuda, akozala mokambi na bino mpo na makambo nyonso oyo etali mokonzi. Balevi bakozala lokola bakalaka liboso na bino. Bozala na mpiko mpe bosala mosala ! Mpe tika ete Yawe azala elongo na bato oyo bakosala malamu ! »
<- 2 Masolo ya Kala 182 Masolo ya Kala 20 ->