7 Na mobu ya misato ya bokonzi na ye, atindaki bakalaka na ye koteya bavandi ya bingumba ya Yuda. Ezalaki Beni-Ayili, Abidiasi, Zakari, Netaneeli mpe Mishe. 8 Atindaki elongo na bango Balevi oyo libwa : Shemaya, Netania, Zebadia, Asaeli, Shemiramoti, Jonatan, Adoniya, Tobiya mpe Tobi-Adoniya ; elongo na Banganga-Nzambe Elishama mpe Yorami. 9 Bateyaki kati na Yuda. Wana bazalaki na buku ya Mobeko ya Yawe elongo na bango, batambolaki kati na bingumba nyonso ya Yuda mpo na koteya bato.
10 Somo ya Yawe ekangaki bamboka nyonso oyo ezalaki zingazinga ya Yuda, mpe ekokaki lisusu te kobundisa Jozafati. 11 Bato ya Filisitia bamemelaki Jozafati bakado mpe palata lokola mpako mpo na mokonzi ; mpe bato ya Arabi bamemelaki ye bameme ya mibali nkoto sambo na nkama sambo mpe bantaba ya mibali nkoto sambo na nkama sambo. 12 Wana nguya ya bokonzi ya Jozafati ekobaki kaka koya makasi, atongaki kati na Yuda bandako makasi mpe bingumba ya kobomba biloko.
13 Kati na bingumba ya Yuda, azalaki na biloko ebele ya kolia ; mpe kati na Yelusalemi, atiaki basoda ya mpiko. 14 Tala motango na bango kolanda mabota na bango :