1 Na mobu ya tuku misato na motoba ya bokonzi ya Asa, Baesha, mokonzi ya Isalaele, abundisaki Yuda ; alendisaki bamir ya engumba Rama mpo na kopekisa bato kokota to kobima na mokili ya Asa, mokonzi ya Yuda. 2 Asa azwaki na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako na ye moko palata mpe wolo, mpe atindaki yango epai ya Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, oyo azalaki kovanda na Damasi. Atindelaki ye mpe maloba oyo : 3 « Tika ete tosala boyokani kati na ngai mpe yo ndenge ezalaki kati na tata na ngai mpe tata na yo. Tala, natindeli yo palata mpe wolo. Kende kokata boyokani na yo elongo na Baesha, mokonzi ya Isalaele, mpo ete abundisa ngai lisusu te. »
4 Beni-Adadi andimaki maloba ya mokonzi Asa mpe atindaki bakonzi ya basoda na ye kobundisa bingumba ya Isalaele. Babotolaki Iyoni, Dani, Abele-Mayimi mpe bibombelo nyonso ya bingumba ya Nefitali. 5 Tango kaka Baesha ayokaki bongo, atikaki kolendisa engumba Rama mpe akataki misala na yango. 6 Bongo mokonzi Asa asangisaki bato nyonso ya Yuda, mpe bamemaki wuta na Rama mabanga mpe mabaya oyo Baesha azalaki kosalela. Atongaki na yango Geba mpe engumba Mitsipa.
10 Mokonzi Asa asilikelaki makasi momoni makambo mpe abwakaki ye na boloko. Kaka na tango yango, Asa anyokolaki ndambo ya bato.
11 Makambo mpe misala mosusu ya Asa, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda mpe ya Isalaele. 12 Na mobu ya tuku misato na libwa ya bokonzi na ye, Asa abelaki makasi makolo ; mpe, ezala na tango oyo azali kobela makasi, alukaki Yawe te, kasi akendeki epai ya minganga. 13 Na mobu ya tuku minei na moko ya bokonzi na ye, Asa akendeki kokutana na bakoko na ye. 14 Bakundaki ye kati na kunda oyo asalisaki kati na engumba ya Davidi. Balalisaki ye na mbeto moko etonda na malasi, na biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpe na kisi oyo basalelaka mpo na kokawusa nzoto ya mowei ; mpe batumbaki biloko yango ebele mpo na lokumu na ye.
<- 2 Masolo ya Kala 152 Masolo ya Kala 17 ->