8 Sima na Asa koyoka maloba oyo mpe lisakoli ya Azaria, mwana mobali ya mosakoli Odedi, azwaki mpiko, alongolaki banzambe ya bikeko kati na bituka ya Yuda, ya Benjame mpe kati na bingumba oyo abotolaki kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi ; azongisaki etumbelo ya Yawe oyo ezalaki liboso ya ndako moke ya kokotela na Tempelo ya Yawe. 9 Asangisaki bato nyonso ya Yuda mpe ya Benjame, elongo na bato oyo bawutaki na mabota ya Efrayimi, ya Manase mpe ya Simeoni, oyo bakomaki kovanda kati na bango, pamba te bana ebele ya Isalaele basanganaki na mokonzi Asa tango bamonaki ete Yawe, Nzambe na ye, azali elongo na ye. 10 Basanganaki na Yelusalemi na sanza ya misato ya mobu ya zomi na mitano ya bokonzi ya Asa. 11 Na mokolo wana, kati na bomengo ya bitumba oyo bazongaki na yango, babonzelaki Yawe bangombe nkama sambo mpe bameme nkoto sambo. 12 Basalaki boyokani na kolapa ndayi ete bakokangama na Yawe, Nzambe ya batata na bango, na mitema mpe na molimo na bango mobimba ; 13 bongo moto nyonso oyo akokangama te na Yawe, Nzambe ya Isalaele, azala mwana to mokolo, tata to mama, basengeli koboma ye. 14 Balapaki ndayi epai na Yawe, na mongongo makasi, na kobeta maboko mpe milolo, mpe na lokito ya kelelo mpe ya maseke. 15 Bato nyonso ya Yuda basepelaki na ndayi yango, pamba te balapaki yango na mitema na bango mobimba ; bazwaki mokano ya kokangama na Yawe Nzambe na esengo, mpe Ye amimonisaki epai na bango. Boye, Yawe apesaki bango bopemi na bangambo nyonso.
16 Mokonzi Asa alongolaki ezala Maaka, mama na ye, na lokumu ya mama ya mokonzi, pamba te Maaka asalelaki nzambe mwasi Ashera ekeko ya soni. Asa abukaki ekeko yango ya soni kino kokomisa yango putulu, mpe atumbaki yango kati na lubwaku ya Sedron. 17 Kasi abebisaki te kati na Isalaele bisambelo ya likolo ya bangomba. Nzokande, Asa abatelaki motema na ye sembo, na mikolo nyonso ya bomoi na ye ; 18 azongisaki kati na Tempelo ya Nzambe biloko oyo tata na ye mpe ye moko babulisaki : palata, wolo mpe biloko mosusu.
19 Bitumba ezalaki lisusu te kino na mobu ya tuku misato na mitano ya bokonzi ya Asa.
<- 2 Masolo ya Kala 142 Masolo ya Kala 16 ->