2 Masolo ya Kala
2 Salomo abengisaki Isalaele mobimba : bakonzi ya bankoto ya basoda, bakonzi ya bankama ya basoda, basambisi, bakambi ya Isalaele mobimba mpe bakambi ya mabota. 3 Bongo, Salomo elongo na lisanga mobimba bakendeki na esambelo ya likolo ya ngomba, na Gabaoni, pamba te Ndako ya kapo ya Bokutani ya Nzambe, oyo Moyize, mosali na Yawe, atelemisaki na esobe ezalaki kuna. 4 Nzokande, Davidi amemaki Sanduku ya Nzambe, wuta na Kiriati-Yearimi kino na esika oyo abongisaki mpo na yango, pamba te atelemisaki mpo na yango Ndako ya kapo kati na Yelusalemi. 5 Kasi etumbelo ya bronze oyo Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri mpe koko ya Wuri, atongaki ezalaki liboso ya Mongombo. Ezalaki kuna nde Salomo elongo na lisanga mobimba balukaki Yawe.
6 Salomo akendeki na etumbelo ya bronze, liboso ya Yawe kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, mpe abonzaki kuna bambeka ya kotumba nkoto moko.
7 Na butu wana, Nzambe abimelaki Salomo mpe alobaki na ye :
8 Salomo azongiselaki Nzambe :
11 Nzambe alobaki na Salomo :
13 Bongo Salomo alongwaki na esambelo ya likolo ya ngomba, na Gabaoni epai wapi akendeki liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpe azongaki na Yelusalemi. Mpe akomaki mokonzi ya Isalaele.
14 Salomo asangisaki bashar mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda ; azalaki na bashar nkoto moko na nkama minei, mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, nkoto zomi na mibale. Abombaki bango kati na bingumba epai wapi babombaka bashar, mpe na Yelusalemi epai wapi mokonzi azalaki kovanda. 15 Mokonzi asalaki ete wolo mpe palata ekoma ebele na Yelusalemi lokola mabanga, mpe banzete ya sedele ekoma ebele lokola banzete ya sikomori oyo ezali kati na mokili ya lubwaku. 16 Bampunda ya Salomo ezalaki kowuta na Ejipito mpe na engumba Kue. Bato ya mombongo ya mokonzi nde bazalaki kosomba yango kuna na engumba Kue. 17 Bazalaki kosomba na Ejipito shar moko na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, nkama motoba, mpe mpunda moko na motuya ya mbongo ya bibende, nkama moko na tuku mitano ; bazalaki mpe kosomba yango mpo na bakonzi nyonso ya bato ya Iti mpe ya Siri.
18 Salomo apesaki mitindo mpo na kotonga Tempelo ya Yawe mpe ndako ya mokonzi mpo na ye moko.
2 Masolo ya Kala 2 ->