4 Solo, nyonso oyo Nzambe akela ezali malamu, eloko moko te ezali ya kobwaka soki kaka tokozongiselaka Ye matondi tango tozwi yango, 5 pamba te ebulisamaka na nzela ya Liloba na Nzambe mpe libondeli.
6 Soki oteyi makambo oyo epai ya bandeko, okozala mosali malamu ya Yesu-Klisto, mosali oyo alendisami na maloba ya kondima mpe na malakisi ya kitoko oyo olandi na bosembo. 7 Boye, boya masolo ya bozoba, oyo etiolaka Nzambe ; boya mpe bilobaloba ya mibange basi.
10 Tala mpo na nini tosalaka mpe tobundaka makasi : ezali mpo ete tosili kotia elikya na biso kati na Nzambe na bomoi oyo azali Mobikisi ya bato nyonso mpe mingi-mingi ya bandimi na Ye.
11 Teya makambo yango mpe tinda bato kosalela yango. 12 Kopesa na moto moko te nzela ya kotiola bolenge na yo, kasi zala ndakisa mpo na bandimi na nzela ya maloba, bizaleli, bolingo, kondima mpe bopeto. 13 Kino tango nakoya, zala na molende ya kotanga Makomi, ya koteya mpe ya kopesa malakisi. 14 Kozwa na pamba te likabo oyo Nzambe apesaki yo na nzela ya lisakoli, tango lisanga ya bakambi ya Lingomba batielaki yo maboko. 15 Zwa makambo yango na motuya mpe mipesa na yango mpo ete bato nyonso bamona ete ozali kokende liboso. 16 Misenzela malamu, sala keba na mateya na yo, mpe tikala ngwi kati na yango. Soki osali bongo, okomibikisa mpe okobikisa bato oyo bakoyoka yo.
<- 1 Timote 31 Timote 5 ->