1 Tala liloba oyo ezali penza ya solo : Moto nyonso oyo alingi kozala mokambi kati na Lingomba aponi mosala ya kitoko.
2 Boye, mokambi ya Lingomba asengeli kozala : moto azanga pamela, mobali ya mwasi moko, moto oyo alekisaka ndelo te na ezaleli na ye, moto oyo ayebi komikanga, moto ya lokumu, moto oyo ayambaka malamu bapaya kati na ndako na ye, moto oyo azali na makoki ya koteya,
3 molangwi masanga te, moto na kanza te, moto na boboto, moto oyo aswanaka te, moto na lokoso ya mbongo te,
4 moto oyo akambaka malamu libota na ye moko, asenzelaka ete bana na ye batosa ye mpe asalaka bongo na lolenge oyo ebongi na limemia ya kokoka.
5 Moto oyo ayebi te kokamba malamu libota na ye akokoka ndenge nini kobatela Lingomba ya Nzambe ?
6 Mokambi ya Lingomba asengeli te kozala moto oyo abongoli motema sika, noki te akotonda na lolendo mpe akozwa etumbu lokola Satana.
7 Mokambi ya Lingomba asengeli mpe kozala moto oyo akenda sango ya malamu kati na bato oyo bazali bandimi te mpo ete abatela lokumu na ye mpe akweya te na mitambo ya Satana.
8 Ezali mpe ndenge moko mpo na badiakona. Basengeli kozala : bato oyo babongi na limemia, bato ya maloba mibale te, balangwi masanga te mpe bato oyo balukaka mbongo te na banzela ya mabe. 9 Basengeli koyeba kobatela mabombami ya kondima kati na motema ya peto. 10 Esengeli komeka bango liboso ; bongo soki emonani ete bazangi pamela, wana nde bakoki kosala lokola badiakona.
11 Ezali mpe ndenge moko mpo na badiakona ya basi. Basengeli kozala : basi oyo babongi na limemia, basi oyo batongaka bato te, basi oyo balekisaka ndelo te na bizaleli na bango mpe basi ya sembo na makambo nyonso.
12 Diakona asengeli kozala mobali ya mwasi moko mpe asengeli kokamba malamu bana na ye mpe ndako na ye. 13 Pamba te badiakona oyo basalaka mosala na bango malamu bazwaka esika ya lokumu mpe bakomaka na elikya makasi kati na kondima na bango epai na Yesu-Klisto.