3 Bazongisaki :
4 Bato ya Filisitia batunaki :
10 Bato ya Filisitia basalaki ndenge bayebisaki bango : bazwaki bangombe mibale ya basi oyo ezalaki komelisa mpe bakangisaki yango na shario. Kasi bazongisaki bana na yango na lopango. 11 Batiaki Sanduku ya Yawe na likolo ya shario ; bongo na pembeni na yango, batiaki mwa sanduku oyo ya moke, oyo kati na yango ezalaki na bampuku ya wolo mpe bililingi ya bapota na bango ya libumu. 12 Bangombe yango ya basi ekendeki mbala moko na nzela ya Beti-Shemeshi, elandaki kaka nzela yango mpe, nzela-nzela, ezalaki kolela ; ebalukaki te ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to na ngambo ya loboko ya mobali. Nzokande bakambi ya bato ya Filisitia balandaki yango na mosika kino na mondelo ya Beti-Shemeshi.
13 Na eleko yango, bato ya Beti-Shemeshi bazalaki kobuka ble, na lubwaku. Bongo tango batombolaki miso mpe bamonaki Sanduku, basepelaki makasi. 14 Shario ekomaki na elanga ya Jozue, moto ya Beti-Shemeshi, mpe etelemaki wana, pembeni ya libanga monene. Bato babukaki mabaya ya sanduku mpe babonzaki bangombe ya basi lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe. 15 Balevi bakitisaki Sanduku ya Yawe elongo na mwa sanduku ya moke oyo kati na yango ezalaki na biloko ya wolo, mpe batiaki yango na likolo ya libanga monene. Na mokolo wana, bato ya Beti-Shemeshi babonzaki bambeka ya kotumba mpe makabo epai na Yawe. 16 Bakambi yango mitano ya bato ya Filisitia bamonaki makambo nyonso wana mpe bazongaki na Ekroni kaka mokolo wana.
17 Tala bililingi ya wolo ya bapota ya libumu oyo bato ya Filisitia babonzelaki Yawe lokola bambeka mpo na masumu : moko mpo na Asidodi, moko mpo na Gaza, moko mpo na Ashikeloni, moko mpo na Gati, moko mpo na Ekroni. 18 Ezalaki mpe na bampuku ya wolo, kolanda motango ya bingumba ya bato ya Filisitia, oyo bakambi mitano oyo bazalaki koyangela : kobanda na bingumba batonga makasi, bamboka na yango ya mike kino na libanga ya monene oyo, na likolo na yango, batiaki Sanduku ya Yawe mpe oyo, kino na mokolo ya lelo, ezali na elanga ya Jozue, moto ya Beti-Shemeshi.
19 Kasi Nzambe abomaki bato ya Beti-Shemeshi mpo ete batalaki Sanduku ya Yawe : kati na bato nkoto tuku mitano, abomaki tuku sambo. Bato ya Beti-Shemeshi basalaki matanga mpo ete Yawe apesaki bango etumbu ya makasi. 20 Bato ya Beti-Shemeshi balobaki : « Nani akoki kotelema liboso ya Yawe, Nzambe oyo ya bule ? Sanduku ekokende epai ya nani soki elongwe awa epai na biso ? »
21 Bongo batindaki bantoma koloba na bato ya Kiriati-Yearimi : « Bato ya Filisitia bazongisi Sanduku ya Yawe ; boya kozwa yango mpe bomema yango epai na bino. »
<- 1 Samuele 51 Samuele 7 ->